Kishore Kumar Hits

PATRICE MUBIAYI - 3.Motema n'a nga текст песни

Исполнитель: PATRICE MUBIAYI

альбом: COMMUNION


Motema na ngai kumisa nkolo
Motema na ngai, talela nkolo
Ata bolembu eye mingi
Mabanzo na ngai, simba yesu
Ata pasi ebelemi
Kondima na ngai, kumisa nkolo
Ko bosana te boboto bwa ye
Yo nzoto na ngai, sanjola nkolo
Tanga nioso bolamu bwa ye
Ako tambwisa ngai, pene na mayi ya kimia
Ako vandisa ngai, na matiti ya mobesu
Ako tika ngai te na bolembu mingi
Ako zala na ngai bisika nioso
Il me rassure
Je l'aime bien
Il me rassure
Je l'aime bien
Ya ngai motema
Elikya Mabanzo se na yo
Na tikala kaka na yo ooo
Nzambe na bomoyi
Lisungi eko zangaka te
Na tango ya pasi ooo
Moninga ya tango nioso ooo
Nzambe na bomoyi
Ako lekisa ngai na mipepe mingi
Ako batela ngai na ba nguna nioso
Ako tambwisa ngai na ba mbonge makasi
Ako tika ngai te na bolembu mingi
Il me rassure
Je l'aime bien
Il me rassure
Je l'aime bien
Motema na ngai
Talela yaya
Mobateli ya pate
Akosaka te
Na butu to na moyi
Na mosala to na Bala Bala
Ata na Kati ya ndoto
Mobateli akosaka te
Motema na ngai
Kolenga lisusu te
Mikakatano eyako boni ooo
Masiya azali
Ako tambwisa ngai
Pene na mayi ya kimia
Ako batela ngai
Atako molili ya pasi
Pene na ngai azali
Bisika nioso na kende
Moninga ya tango nioso
Mobateli ya ba pate
Il me rassure
Je l'aime bien
Le confort de mon âme c'est Jésus
Je l'aime bien
Ya nga motema
Elikya Mabanzo se na yo
Na tikala kaka na yo
Nzambe na bomoyi
Lisungi ekozangaka te na tango na pasi oh
Moninga ya tango nioso ooo
Nzambe na bomoyi
Ya ngai nioso
Na tiki na maboko na yo
Mosusu te na se ya moyi
Bobele yo...
Ako vandisa ngai na matiti ya mobesu
Ako tika ngai te na bolembu mingi
Ako njala na ngai bisika nioso
Ako tika ngai te na bolembu mingi
Il me rassure
Je l'aime bien
Aussi Jésus m'a convaincu vraiment
Je l'aime bien
Il sait là où toucher mon coeur pon'akweya ye lolanga (Je l'aime bien)
On peut tout me faire kasi Jésus na
Ngai na boya te ooo (Je l'aime bien)
Tellement akota na Kati abongola Mabanzo yesu (Je l'aime bien)
Non seulement alinga nga,
Ngai pe vraiment na linga ye ooo (Je l'aime bien)
Jésus je t'aime, je sais que tu m'entends
Jésus je t'aime ooo

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители