Kishore Kumar Hits

Henriette Fuamba - Sekele ya Motema текст песни

Исполнитель: Henriette Fuamba

альбом: Aponi Ngai


Sekele ya motema
Sekele ya motema
Sekele ya motema
Yanga na Nzambe nanga
Sekele ya motema
Aaah ya motema
Sekele ya motema
Nzambe na bana na Ye
Nzambe alobaki na elanga n'Edeni
Oh Adama boliya mbuma te
Kasi Ewa aboyaki kotosa
Alobelaki nyoka, nyoka apengwisaki ye
Sekele ya motema
Sekele ya motema
Sekele ya motema
Yanga na Nzambe nanga
Sekele ya motema
Aaah ya motema
Sekele ya motema
Nzambe na bana na Ye
Nzambe alobaki na Elombe Samsona
Okokata te suki na yo ya moto
Na posa ya nzoto alobelaki Delila
Yango Delila abomisaki ye
Sekele ya motema
Sekele ya motema
Sekele ya motema
Yanga na Nzambe nanga
Sekele ya motema
Aaah ya motema
Sekele ya motema
Nzambe na bana na Ye
Na tango oyo moyini azali konguluma
E akweyisa bana nionso ya Nzambe
Nkake sambo yango ezali pe konguluma
Kotalisa miango na ye ya mabe
Ya mbala oyo Ewa akokweya te
Oyo ekokoma tango esi eleka
Sekele ya motema
Sekele ya motema
Sekele ya motema
Yanga na Nzambe nanga
Sekele ya motema
Aaah ya motema
Sekele ya motema
Nzambe na bana na Ye
Mikolo nionso ngai na etumbelo
Nakolelaka ngolu ya Tata na ngai
Mbula to moyi ngai na losambo
Nakosengaka ete abongola nga
Ekobima ngai kati na hema
Mokili ekokamwa komona lolenge na ngai
Moto na bolembu moto na masumu
Moto na botawu ye abongoli ngai
Sekele ya motema
Sekele ya motema
Sekele ya motema
Yanga na Nzambe nanga
Sekele ya motema
Aaah ya motema
Sekele ya motema
Nzambe na bana na Ye
Bosana te mwana, bilako na nzambe
Bomba yango na motema na yo
Landaka mayele ya baye banso
Batambolaki liboso na yo
Talaka Rahab abikisamaki
Alandaki sekele ya bana Israël
Talaka Ruth abikisamaki
Alandaki Nzambe ya bana Israël
Mwasi na kanana abikisamaki
Alandaki Nzambe ya bana Israël
Sekele ya motema
Sekele ya motema
Sekele ya motema
Yanga na Nzambe nanga
Sekele ya motema
Aaah ya motema
Sekele ya motema
Nzambe na bana na Ye
Sekele ya motema
Sekele ya motema
Sekele ya motema
Yanga na Nzambe nanga
Sekele ya motema
Aaah ya motema
Sekele ya motema
Nzambe na bana na Ye
Yesu yo mwana moke olongi liwa (Elombe na etumba)
Yesu yo mwana moke olongi satana (Elombe na etumba)
Tala ye mwana moke alongi liwa (Elombe na etumba)
Sekele na ye azali nde Nzambe na motema
Sekele na ye azali nde Nzambe na motema
Moïse yo mobange olongi Egypte na etumba
Moïse yo mobange olongi Egypte na etumba
Sekele na yo ezalaki Nzambe na motema
Sekele na yo ezalaki Nzambe na motema
Dawidi mwana moke abeti Goliate na etumba
Dawidi mwana moke abomi Goliate na etumba
Tala Dawidi mwana moke abeti Goliate
Sekele na ye ezalaki Nzambe na motema
Abraham yo mobange oboti Izaki
Sara yo mobange oboti Izaki
Sekele na bino ezalaki Nzambe na motema
Sekele na bino ezalaki Nzambe na motema
(Ah bilombe na etumba
Ah bilombe na kondima)
Yesu yo mwana moke olongi liwa
Yesu yo mwana moke olongi liwa
Tala ye mwana moke alongi satana
Sekele na ye ezali nde Nzambe na motema
Sekele na ye ezali nde Nzambe na motema
Biso pe bana nayo tolongi ba pasi
Biso pe bana na yo tolongi mokili
Biso pe bana na yo tolongi satana
Sekele na biso ezali nde Nzambe na motema
Sekele na biso ezali nde Nzambe na motema
Bino ba frère na nga bo longi Satana ndenge nini
Bina bana mike bo longi ba pasi
Bino bana mike bo longi ekobo
Sekele na bino ezali nde Nzambe na motema
Sekele na biso ezali nde Nzambe na motema
Bino ba soeur na nga bo longi mokili ndenge nini
Bina bana mike bo longi ba satana
Bino bana mike bo longi ba épreuves
Sekele na bino ezali nde Nzambe na motema
Sekele na biso ezali nde Nzambe na motema
(Bilombe na etumba
Bilombe na kondima)

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители