Kishore Kumar Hits

Henriette Fuamba - Aponi Ngai текст песни

Исполнитель: Henriette Fuamba

альбом: Aponi Ngai


Ezalaki mwana na
Mokonzi monene
A sepela kobala
Na tango elaka ekoki
A kendeki na mokolo
Na bingoumba ya tata na ye
Koluka oyo a kokaki kozala
Mwasi na libala
Ekomaki ye kuna a tindaki
Sango mosika
Kobianga bilenge basi
Koyangan' na elambu oyo ya kuna
Bilenge basi ba milengeli
Balati molatu kitoko
Pona ko sepelisa
Motema ya mwana na mokonzi
(Aah aah aaah)
Ekomaki ye na Elambu
Ayokisamaki mawa na
Komona molatu pe lolenge
Ya basi ya engumba
Ye azuaki mokano
Kozonga mboka ya tata na ye
Pe kati na mawa na ye
A kendaki kotambola na elanga
(Aah aah aaah)
Pe tala na puasa
Akutanaki na nga oyo
A lobaki elenge mwasi
Banga te ozui ngolu na nga
Na lobi longwa mosika na nga
Yo mwana na mokonzi
Na zali na kitoko te bonzenga te
Ata bolamu te
(Aah aah aaah)
Ye a bandaki ko lobela ngai
Mabombami na Nzambe
Motema na ngai epelaki
Lokola ba ntoma
Na nzela ya Emayuse
Bongo baninga ba boyi nga
Bongo baninga ba fingi nga
Balobi ngai nakoki te
Kozala mwasi na mokonzi
(Aah aah aaah)
Kasi ngai se kozela
Miso na ngai se na nzela
Kotala elaka ye apesaki ngai
Kokutana na lola
Na mboka ya libela
Atako balobi oo
Ata ba fingi nga oyo
Na kotika ye te
Na kobila se ye
Na lukakiye te
Ye nde a bengi nga
Na kobila se ye
Na kobila se ye
Ye mobali na nga
Ye nde a nga poni
Na kobila se ye
Na kobila se ye
(A poni ngai)
(A lingi ngai)
(A poni ngai)
(A lingi ngai)
Ngai oyo ba buakaki
Tala Masiya aponai nga
Kaka ngai oyo baboyaki
Tala mobali asepeli na nga

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители