Kishore Kumar Hits

Neville Kanono Mukendi - Eza ngai te текст песни

Исполнитель: Neville Kanono Mukendi

альбом: El Shaddai


Nzambe na mwango na Ye
Monene oyo ya lisiko
Wana ba bengaki Ye
El-Ellah – Elohim!
Azalaki na ba mpifo
To mpe mabanzo kati na Ye
Kasi kozalaka Molimo
Akokaki kosala yango te
Kozalaka Molimo
Akokaki kosala yango te
Nzambe na mwango na Ye
Monene oyo ya lisiko
Alingaki ete ayembaka
Liloba na Ye!
Kasi kozalaka Molimo
Akokaki kosala yango te
Yango azwi nzoto moko
Lelo babengi Isaac
Yango azwi nzoto moko
Lelo babengi Goel
Nzambe nde azo kokisa
Mwango na Ye
Eza ngai te oh ngai te
(Ye nde ozo sala
Na kati na ngai)
Eza ngai te oh ngai te
(Ye nde ozo sala
Na kati an ngai)
Eza ngai te oh ngai te
Nzambe na mwango na Ye
Monene oyo ya lisiko
Alingaki ete ateya
Ata Liloba na Ye
Kasi kozalaka Molimo
Akokaki kosala yango te
Yango azwi nzoto moko
Lelo babengi yo apôtre
Azwi nzoto moko
Lelo babengi yo Kanono
Nzambe nde azo kokisa
Mokano na Ye!
Eza ngai te oh ngai te
(Ye nde ozo sala
Na kati na ngai)
Eza ngai te oh ngai te
(Ye nde ozo kokisa
Ndoto na Ye)
Eza ngai te oh ngai te
(Ye nde ozo sala
Mokano na Ye)
Eza ngai te oh ngai te
Nzambe na mwango na Ye
Monene oyo ya lisiko
Alingaki ete ayokaka
Liloba na Ye
Pe aloba Amen
Kozalaka Molimo
Akokaki kosala yango te eh
Yango azwi nzoto moko
Babengi Yosefu Osborn
Azwi nzoto moko
Babengi Kunda David eh
Liloba makasi boye
Batu ebele bakoboya
Kasi yo ondimi yango
Nzambe nde azo ndima
Liloba na Ye
Eza ngai te oh ngai te
(Ye nde azo ndima
Liloba na Ye)
Eza ngai te oh ngai te
(Moto ya mokili akoki
Kondima makambo oyo te)
Eza ngai te oh ngai te!
(Ete Nzambe mobimba
Vraiment akiti
Afandi na nzoto.)
Eza ngai te oh ngai te
Tango ndeko Branham
Azalaki koteya
Na ngonga moko
Apesi biso mokongo
Kososolaka makanisi
Na kotalisa bino ete
Ezali mwanje wana azalaka
Epai ya Abraham
Na kotalisa bino ete
Ezali mwanje wana
Na liziba ya Yakobo
Ye nde azo yeba
Mabanzo na bino
Eza ngai te oh ngai te!
(Moto ya mokili akoki
Kosala boye te.)
Eza ngai te oh ngai te
(Ndeko na nga ya mwasi
Outi na mboka
Ba bengi Arkansas.)
Eza ngai te oh ngai te
(Y'ozali kobondela
Po na ndeko na yo
Azali na maladie ya motema)
Eza ngai te oh ngai te
(Oh Ye nde ozo sala
Na kati na ngai)
Eza ngai te oh ngai te
(Moto ya mokili akoki
Kosala boye te)
Eza ngai te oh ngai te
(Moto ya mokili akoki
Kondima boye te)
Eza ngai te oh ngai te

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители