Franco And Rochereau - Ngungi текст песни
Исполнитель:
Franco And Rochereau
альбом: Omona Wapi
Nazuaki molangi, ee... Nazuaki molang ngai mwana mama
Napesa nzoto na ngai na nzambe,
Mosolo na kolia kasi ya nzembo
Mopepe ngai nakopepaka, oyo ya bato nyoso
Mosuni ya nzoto na ngai suka elengi
Moto nyoso akoluka kaka... bute, mama.Luambo eee
Mpona nini mosuni ya nzoto ya mwana ya moto
Bolingi bolia yango lokola mosuni nde ya nyama
Bokokende na yango wapi na kinshasa oyo
Botika asala asala akoba
Bolingi nini na nzoto na ye bandeko ley yemba.
Nalembi bato oyo eeeeee
Nasi namesana na kotongo,
Matoyi emesana na koyoka
Nzoto ekoma libanga mpo na masolo ya bato
Nalandaka te, E ee nzambe
Luambo alanga nzembo nasala nini?
Bato mobimba bakovanda se masolo ya bato,
Balingi kodistabilze bato nyoso bandeko
Tosala nini na matongi?
Kinshasa ekobeba na matongi
Kotongo bato butu, moi kaka kolembe te
Soki olandi bato oyo bandeko
Okoya kobunga nzela ya mosala
Okotika bana na mwasi bakosufere mpo na bango
Naye mboka mopaya... eeeeeee Oh Luambo
Basasi na sima se kosasa
Balambi lokumu na ngai na ndunda bololo
Bakomi ndeko na ngai nde kombo ya magic
Luambo Oy yo alanga nzembo nasala nini?
Nzoto ya mwana moninga botika evanda pembeni
Bokolongola mosuni bokotika makila na nani?
Makila ngungi amela amela alemba
Avimba libumu ya moke
Soki obeti mbata epasuka
Ley yemba, nalembi bato oyo bandeko
Oh ley, ley, ley
Nazuaki molangi, ee... Nazuaki molang ngai mwana mama luambo
Napesa nzoto na ngai na nzembo,
Mosolo nakolia kasi ya nzembo
Mopepe ngai nakopepaka, oyo ya bato nyoso
Mosuni ya nzoto na ngai suka elengi
Moto nyoso akoluka kaka... bute. mama .Luambo eee
Elengi nini bakoyoka bo... Luambo eee
Bakolembe te, tika bango baloba Ley mama
Bakotonga bakotonga tika bango batonga Ley mama
Likambo bamesana na yango, bakoki kotika te
Babokamwa boye, basala bango boye
Tokoloba nini, biso tolembi bango bandeko NGUNGI eee
Nazuaki molangi, ee... Nazuaki molang ngai mwana mama luambo
Napesa nzoto na ngai na nzambe,
Mosolo nakolia kasi ya nzembo
Mopepe ngai nakopepaka, oyo ya bato nyoso
Mosuni ya nzoto na ngai suka elengi
Moto nyoso akoluka kaka... bute. mama .Luambo eee
Elengi nini bakoyokaka na kombo na ngai eee . Luambo eee
Ozali mwana ya moto bakota yo
Bakoloba yo mpe bakoloba balemba
Famie nay o epesa yo nzoto makasi
Soki e-Cede te tika bango baloba
Kokipe te oh famie nayo malamu eloba
Wana okende kokondela bango banjelu Ley mama
(Kinsahasa makambo) eee Ngai mwana mama
Nasi namesana na kotongo,
Matoyi emesana na koyoka
Nzoto ekoma libanga mpo na masolo ya bato
Naloba nini ee Oh Luambo
Alanga nzembo oh Luambo
Loba bayoka, yembela Ngai
Naloba nini? Ley Nalembi
Naloba nini Ley ngai nalembi
Kinshasa baling kaka masolo ya bato
Balemba te na bandako na bango
Na basi na bana kotongo bato
Surto biso boyi toloba nini
Tolemba nde koloba
Basilisa biso misuni
Batika mposo toloba nini
(Kinsahasa makambo) Ley eee
Nakei mboka mopaya, eee Oh Luambo,
Basasi ngai na sima se kosasa
Balambi lokumu na ngai na ndunda bololo
Bakomi ndeko na ngai na kombo ya magic
Luambo yo yo alanga nzembo
Nasala nini? Eeee mama.
Nakanisi tolobi tolobi toyembi
Nakanisi bayoki biso na mbala oyo
Bayoka biso na matoyi
Bayoka biso na mingongo bandeko
Oh Kinshasa, Kinshasa makambo
Kinshasa oyo Kinshasa makambo Ley
Kinshasa makambo Oh Ngai Mwana moto...
Поcмотреть все песни артиста
Другие альбомы исполнителя