Kishore Kumar Hits

VAN WALESA - Bilaka текст песни

Исполнитель: VAN WALESA

альбом: Bilaka


Esika bato ba lobi non, Nzambe alobi oui nga
Na banga nini eeh (Nga na banga nini eeeeh) 2x
Nga eeeh, aaaa nga yo
Esika bato ba lobi non, Nzambe alobi oui nga
Na banga nini eeh (Na banga nini eeeeh) 2x
Nakoko mitungisa te pona na maloba ya bato
Oyo bako loba pona vie na ngayi, de mon côté, nga
Na bateli kimia, po maloba ya bato eza maloba ya
Nzambe te, bato ba lobaka oyo bango ba monaka eh
Kasi maloba ya Nzambe na bilaka na ye, ngayi eeh
Esika bato ba lobi non, Nzambe alobi oui nga
Na banga nini eeh (Na banga nini eeeeh) 2x
Moto oyo aza na bilaka ya Nzambe eeeh, ba sekaka ye te eeeh
Moto oyo aza na bilaka ya Nzambe eeeh, ba sekaka ye te eeeh
Ata azo tambola makolo ngulo, ba sekaka ye te oooh yeeeh, ata
Azo kelela, kelela, kelela, kelela, ba sekaka ye te ooooh, mokolo
Loboko ya Nzambe eko signé, boko kamua eeeh, boko kamua eeeh
Aah boko kamua eeeeeh
Bilaka e dependaka na moto apesi ya ngo eh, soki ye akufi
Bilaka pe ekufi, oyo a pesa bilaka, eza Nzambe ya lola, akufaka
Jamais po aza eternel, a zanga ebandeli, a zanga pe na suka
Bilaka na ye ekufaka jamais
Na lela pona nini, na lela pona nini, na lela pona nini yeeeh
Na mitungisa pona nini, na lela pona nini, bilaka na Yesu echouaka
Jamais eeeh
Nga nazalaki lokola chifon na maboko ya bato, eloko ezanga tina
Nani ako tala ngayi eeh, moto yako buaka mosika, moto ya milelo
Mafinga nionso kaka nga, nani ako tala ngayi eeh, kaka chifon wana
Nde Nzambe alokoti, a saleli yango ngolu, epanguisi soni ya famille
Kaka chifon wana nde Nzambe alokoti eeh, a saleli yango ngolu
E panguisi soni ya famille, na concluir pona vie na ngayi eeh
Yesu nde Champion, o bunda bitumba na ngayi, na concluir
Pona vie na ngayi eeh Oyo elobi Yaweh, yango nde nga na zali
Hiiiii
Naza ya Yesu eeh, oyo a loba nde lelo nazo simba awa, naza ya Yesu eeh
Oyo a laka nde lelo nazo mona, ngayi naza yeeeh
Naza ya Yesu eeh, oyo a loba nde lelo nazo mona (Ngayi nazaliii)
Naza ya Yesu eeh, oyo a laka nde lelo nazo bika
Naza ya Yesu eeh, oyo a loba nde lelo nazo mona (Ngayi nazaliii)
Naza ya Yesu eeh, oyo a laka nde lelo nazo bika
Naza ya Yesu eeh, maloba ya ba ndoki eza sens effet
Naza ya Yesu eeh, oyo aloba nde lelo nazo mona eeeh
Naza ya Yesu eeeh, eeeh ngayi oyo, lelelele, lelelelele aaaham
Lelelele, lelelele, lelelele eeeh, lelelele Nzambi wani, a
Saleli nga bikamua, lelele lelelelele aaaaham

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители