Kishore Kumar Hits

Franck Mulaja - Yawhé текст песни

Исполнитель: Franck Mulaja

альбом: Trone Eternel


Yawhé yo ozali mokonzi
Likolo na mabota nionso
Yo ofandi na likolo
Na kiti na bulé na yo
Oyebani eté yo ozali
Mobateli makasi
Libota na bana na Nzambé
To kumisa kombo na Nkolo
To sanjola yé
Eeh molimo na nga yemba
Sanjola kombo na Nkolo
Motema na ngayi bosana té
Boboto na yé eeeh
Ako tanisaka moyi na yé
Likolo na mabota nionso
Ako batelaka ba oyo, balingi yé eeeh
Ata na tamboli na kufa
Nako banga eloko té
Po Yawhé azali mosungi
Ya bomoyi na nga aaaah Yawhé eeh
Yawhé yo ozali mokonzi
Likolo na mabota nionso (mabota)
Yo ofandi na likolo (na likolo)
Na kiti na bulé na yo
Oyebani eté yo ozali
Mobateli makasi
Libota na bana na Nzambé
To kumisa kombo na Nkolo
To sanjola yé

Lokito ya mongongo na yo
Ekweyisaka ba ngomba
Nguya ya loboko na yo, e kangolaka aah
Bayé batiela yo motema
Ba yembaka nzembo n'esengo
Liloba na yo ndé likonzi
Pona bato oooh
Mitema nionso epusani
Liboso na yo (liboso ya bo santu bwa yo)
Seko na seko kombo na yo
E kumbama aaah, Yawhé
Yawhé yo ozali mokonzi (ozali mokonzi)
Likolo na mabota nionso (mabota aah)
Yo ofandi na likolo (na likolo)
Na kiti na bulé na yo (oyebani eté)
Oyebani eté yo ozali (mokonzi)
Mobateli makasi (libota na bana na Nzambé)
Libota na bana na Nzambé (uhmm)
To kumisa kombo na Nkolo (Nkolo)
To sanjola yé
To sanjola yé
To yembela yé
To netola yé eeh
To sankola yé eeeh
To tombola yé
To pambola yé
To kumisa Yawhé
To sanjola yé eeeh

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители