Kishore Kumar Hits

Franck Mulaja - Gethsemane - Original текст песни

Исполнитель: Franck Mulaja

альбом: Total Adoration


Na Gesthémane y'omeli nkeni oyo
Ya minioko mawa mpe pasi
Ondimi ko koma lisumu
Eloko y'osala nanu te
Yo mutu owumeli na bosantu
Ebanda boni y'okoma lisumu?
Yaya na nga y'obongi na yango te
Eza ngai nde nameritaka soni oyo

Na kanisi nzela ya ekulusu
Yango po nini batu ebele boye
Basangeli moto se moko
Asali bango nini?
Tala mususu akamati soyi
Ya ebele na munoko na ye
Asopi yango se na elongi
Elongi oyo ya mwana na mpate
Oyo amesana ko seka
Oyo amesana ko limbisa
Yaya na nga y'obongi na yango te
Eza ngai nde nameritaki soni oyo
Tangu nazalaki na masumu
Masiya ondimi liwa
Ozui penza esika na nga oh
Nga pe nakomi mosantu
Tika lelo nayebisa yo
O Jésus, Tu es tout pour moi
Tangu nazalaki na masumu
Masiya ondimi liwa eh
Ozui penza esika na nga oh
Nga pe nakomi mosantu
Tika lelo nayebisa Yo
Ô Jésus, tu es tout pour moi

Bolingo nde elongoli yo na lola
Yango nde ekitisi yo na sé
Kaka bolingo eniokoli yo boye
Et tu es mort au nom de l'amour
Olongoli kazaka ya bokonzi
Olati elamba ya mosali
Kasi batu oy'olingaki mingi
Baluki ba beti yo fimbu
N'ékulusu kilo na mukongo
Ondimi etumbu ya liwa
Yaya na nga obongi na yango te
Eza nga nde na meritaka pasi oyo
Pasi oyo nameritaka yango
Na meritaki pasi oyo
Ozeli te na bongola motema
To pe na yeba yo nanu
Kasi tangu nazalaki na masumu
Masiya ondimi liwa eh
Ozui penza esika na nga oh
Nga pe nakomi mosantu
Tika lelo nayebisa yo eh
Ô Jésus, tu es tout pour moi
Tangu nazalaki na masumu (na masumu eh)
Masiya ondimi liwa eh (oh vraiment)
Ozui penza esika na nga (yaya eh)
Nga pe nakomi mosantu
Tika lelo nayebisa yo eh
O Jésus, tu es tout pour moi
Tu es tout pour moi (tangu nazalaki na masumu)
(Oh yaya) Masiya ondimi liwa eh
Ozui penza esika na nga
Nga pe nakomi mosantu
Tika lelo nayebisa yo
Ô Jésus, tu es tout pour moi

Na poto poto, na masumu
Ô vraiment
Tangu nazalaki na masumu
Masiya ondimi liwa
Ozui penza esika na nga (ngáí oh)
Nga pe nakomi mosantu
Tika lelo nayebisa yo
Ô Jésus, tu es tout pour moi
Tangu nazalaki na masumu
Masiya ondimi liwa eh (na nzelá ya kufa)
Ozui penza esika na nga (oh yaya)
Nga pe nakomi mosantu (vraiment)
Tika lelo nayebisa yo
Ô Jésus, tu es tout pour moi
O Jésus tu es tout pour moi (ô Jésus Tu es tout pour moi)
Osi okoma nionso pona nga (ô Jésus tu es tout pour moi)
Na maboko na Yo ya pembe, okiti na poto poto Yesu (ô Jésus tu es tout pour moi)
Okomi pe lisumu, okomi pe moto ya mabé yaya (ô Jésus tu es tout pour moi)
Merci pour le sang, merci pour la croix Jésus (ô Jésus tu es tout pour moi)
Nasi nazua maladie ya bolingo, esilaka te Yesu (ô Jésus Tu es tout pour moi)
Na kota virus ya bo Nzambe, suka se lola (ô Jésus tu es tout pour moi)
Ô Jésus, Tu es tout pour moi
Le refrain de mes chants, la raison de ma vie

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители