Kishore Kumar Hits

Franck Mulaja - Ozali Nzambe - Original текст песни

Исполнитель: Franck Mulaja

альбом: Total Adoration


Nzambe eh ozali Nzambe
Nzambe eh okobonguana te
Nzambe eh ozali Nzambe
Nzambe eh okobonguana te
Nzambe na nga Nzambe na ngai
Nzambe na ngai yonde bikamua
Nataleli yo elongà na nga
Nzambe na nga yonde bikamua
Bokono nde eloko nini?
Yonde lobiko ya maladi nionso
Ah yo nde bikamua
Osilisa ngala ya botutu Nzambe na bomoyi
Obotisa ata bikomba
Ah yo nde bikamua
Yango nayembi Nzambe na nga
Nzambe na nga (Nzambe na nga)
Nzambe na nga (Nzambe na nga)
Nzambe na nga yonde bikamwa
Oh Nzambe na nga
Nzambe na nga (Nzambe na nga)
Nzambe na nga (Nzambe na nga)
Nzambe na nga yonde bikamwa

Loboko oyo elokota ngai, yango pe esokolaka ngayi
Yango pe ebundelaka ngayi eza bikamwa, (ah yonde bikamua)
Bongo maloba oyo elakisaka nzela
Yango pe epesesaka lobiko, maloba na bomoyi
Biso tokende wapi? eh toluka nani?
Totelemi se na yo, (ah yonde bikamua)
Osala biso bolamu mingi
Tozangi maloba ya koloba
Yamba mitema na biso, (ah yonde bikamua)
Nzambe na nga (Nzambe na nga)
Nzambe oh (Nzambe na nga)
Nzambe na nga (Nzambe na nga yonde bikamwa)
Nzambe ya motema mawaboye
Nzambe na nga (Nzambe oh)
Nzambe na nga (Nzambe na nga)
Nzambe na nga yonde bikamwa
Yonde Nzambe ya kotika te
Nzambe na nga (Nzambe oh)
Nzambe na nga (Nzambe na nga)
Nzambe na nga yonde bikamua

Yemba Nzambe na nga
Nzambe eh ozali Nzambe (eh-h-h Nzambe oyo)
Nzambe eh (Nzambe na ngai) okobonguana te
Yo nde Nzambe ya motema na ngai eh
Nzambe eh ozali Nzambe (ozali Nzambe, ozali Nzambe)
Nzambe eh (Nzambe na nga) okobonguana te
Nayembeli yo nakumisi yo
Elonga na nga elikia na nga
Nayembeli yo nakumisi yo
Elonga na nga elikia na nga
Tonetoli yo, tosanjoli yo
Ozali Nzambe y'obonguani te
Nayembeli yo nakumisi yo
Elonga na nga elikia na nga
Tobonjeli yo mboka Congo
Zala na biso kino suka
Nayembeli yo nakumisi yo
Elonga na nga elikia na nga
Toyebi Nzambe mosusu te
Bobele yo nkosi na Yuda
Nayembeli yo nakumisi yo
Elonga na nga elikia na nga
E li-le-le yo kumama lelo, yo kumama
Kumama le-li-le (o kumama)
Kumama Nzambe na bomoyi (o kumama)
Kumama Nzambe na nguya (o kumama)
Kumama mosantuna lola (o kumama)
Liboso y'opambola nga Yawhé (o kumama)
Na sengi eloko se moko (o kumama)
Liboso opesa mapamboli (o kumama)
Na sengi eloko moko kumama (o kumama)
Na sengi eloko se moko (o kumama)
Papa kumama nayo (o kumama)
S'il te plaît kumama nanu (o kumama)
Yahwéh kumama nayo (o kumama)
Kumama na kati ta mitema (o kumama)
Kumama Nzambe na bomoyi (o kumama)
Kumama mosantu na kola (o kumama)
Kumama le-li-le eh-h
Nzambe ya motema na ngayi Alleluja
Nkolo ya bomoyi na nga y'okumama
Nzambe ya motema na ngayi Alleluja
Nkolo ya bomoyi na nga okumama
Nzambe ya motema na ngayi Alleluja
Nkolo ya bomoyi na ngayi okumama
Kumama nanu papa
Nzambe ya motema na ngayi Alleluja
Nkolo ya bomoyi na ngayi okumama
Mosantu kumama (o kumama)
Kumama nanu papa (o kumama)
Tokomi lokola Eliya liboso ya ba prophete ya bal (o kumama)
Tokomi lokola eliya liboso ya bayo bayebi ye te (o kumama)
Nzambe oyo akoyanola na moto (o kumama lelo'oyo)
Yende Nzambe ya solo (o kumama)
Nzambe oyo akoyanola na moto (o kumama)
Yende Nzambe ya kogumbamela (o kumama)
Nzambe oyo akoyanola na moto (o kumama lelo'yo)
Yende Nzambe ya kosalela (o kumama)
Mosantu kumama (o kumama)
Papa kumama na yo (o kumama)
S'il te plaît kumama na yo (o kumama lelo'oyo)
Papa kumama nayo (o kumama)
Mosantu kumama
Eyi mukalema wani waba moyo
Schilo wanyi eh yo
Schilo wanyi eh yo
Eyi Nzambi wani shime luakutosumba neba
Schilo wanyi eh yo
Schilo wanyi eh yo
Eyi Nzambi wani shime luakutosumba neba
Schilo wanyi eh yo
Schilo wanyi eh yo
Eyi Nzambi wani shime luakutosumba neba
Schilo wanyi eh yo
Schilo wanyi eh yo
Eyi Nzambi wani shime luakutosumba neba
Kumama (o kumama)
Kumama Nzambe na bomoyi (o kumama)
Kumama pardon papa (o kumama)
Kumama kumama kumama (o kumama)
Nzambi wanyi wa mbishime (o kumama)
Schilo wanyi waba moyo (o kumama)
Tchanga mianda champion wanyi (o kumama)
Mukalenga wanyi waba moyo (o kumama)
Eyi Nzambi wanyi wa lusetu (o kumama)
Eyi Mùkalenga wanyi neza (o kumama)
Eh champion wanyi neza (o kumama)
Mukalenga wanyi neza (o kumama)
Eh champion wanyi neza (o kumama)
Kumama kumama kumama
Oh kumama kumam kumama eh

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители