Kishore Kumar Hits

Micheline Shabani - Kumama Yahwe текст песни

Исполнитель: Micheline Shabani

альбом: La repentance


Nkolo, yoka
Nkolo, yoka

Nkolo, yoka
Nkolo, yoka
Nakomi ko tombola eh, Nzambé na bomoyi oh
Oyo atombolaka pé akitisaka, eh
Oyo azali bomoyi na bato
Ngayi na benga ba oyo bayebi valeur ya mokonzi ba sangana na nga
To tombola Nzambé na bomoyi, eh
Ngayi na benga mama Wosho, eh
Aya to tombola mokonzi oyo asalela yé bikamwa, aah
Ozalaka maladie oh, o bika kaka pona mokonzi oh
Ozalaka ko kendé classe makolo ngulu na nga, eh
Lelo obonga kaka pona mokonzi, oh
Nzela ya campus na souffrances, oh
Lelo Nzambé asalela yo
Wapi ba oyo eh, ba lobaka na bango "ba koki ko bota té oh"
Lelo ba bota, ba simba bana ya bilaka, eh
Ba simba bana, baya to tombola mokonzi eh
Wapi ba oyo ba simba kisi té, oh
Ba kota ba nganga té, oh
Ba lekisa papa na maman té oh
Ba boma bato té, ba zua mbongo kaka pona monkozi
Ba mata na mituka ya mapamboli, eh
Ba ya to tombola mokonzi (kumama Yahwe, Yahwe kumama)
Esika ofandi na lola, aah (kumama Yahwe, Yahwe kumama)
Aaah Nkolo yoka mabondeli ya basali nayo (kumama Yahwe, Yahwe kumama)
Tolingaka yo mingi papa na bana (kumama Yahwe, Yahwe kumama)
Yo ndé associé ya ba kristu (kumbama Yahwe, Yahwe kumama)
Soki oyebi que nionso oyo y'osali
Oyo eza ndé oyo Nkolo asali na bomoyi na yo
Obala, obota, obonga po oza na bomoyi
Yaka to kumisa tata
Nayebi ndeko moko ya muasi oh, abelaka Sida eh
Azalaka nayé ndumba monene oh
Tango azongi epayi na Nzambé, asengi mawa na Nzambé
Nzambé pé abikisi yé na Sida, eh
Ba oyo ba bika na Sida bo simba resultat, eh
Boya to tombola mokonzi, oh
To talisa Nzambé abikisaka bato, oh (kumama Yahwe, Yahwe kumama)
Asilisaka ba maladie incurable, eh (kumama Yahwe, Yahwe kumama)
Eh bato na prostate ba bika pona Yesu, oh (kubama Yahwe, Yahwe kumama)
Bato na cancer, diabète ba tatolaka monene na Nzambé oyo eh (kumama Yahwe, Yahwe kumama)
Asalaka b'operations ezanga cicatrice (kumama Yahwe, Yahwe kumama)
Où sont ceux-là, les condamnés oh
Qu'ils ne pouvaient pas réussir, oh
Que l'éternel lui-même a béni, oh
Ceux qui n'ont pas touché aux fétiches, oh
Ils n'ont pas sacrifié leur parent, ni les gens pour être béni oh
Mais aujourd'hui le Seigneur leurs a restauré
Venez ensemble, glorifions le nom de l'éternel (soit loué Jésus, mon Dieu soit loué)
Soit loué, eeeh (soit loué Jésus, mon Dieu soit loué)
Bien-aimé toi et moi qu'est-ce qu'on peut donner à ce Dieu là? (soit loué Jésus, mon Dieu soit loué)
Oh, célébrons-le pour tout ce qu'il a fait
Il nous a délivrés de la coutume, de la malédiction (soit loué Jésus, mon Dieu soit loué)
Eeeh condamné dans la pauvreté
Soit loué, ces sont les paroles des rachetés, eeeh soit béni
Oh mon Dieu, tu es bon mon Jésus oh
Je t'aime, je t'aime oh

Mutumbi bwe-be, Nzambi mutumbishi
Tshilobo Nzambi mukwabu'akwimbila tshilumba Nzambia'wanyi akutenga eh (mutumbi bwe-bwe, Nzambi mutumbishi)
(Mutumbi bwe-be, Nzambi mutumbishi)
Mutumbi bwe-be, Nzambi mutumbishi

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители