Kishore Kumar Hits

Micheline Shabani - Moninga Malamu текст песни

Исполнитель: Micheline Shabani

альбом: La repentance


Na tambolaki na mokili, namoni moto lokola yo té ooh
Moninga simba nga na loboko to tambola, ko tika ngayi té, ooh-oh

Moninga malamu (moninga aah)
Moninga ya solo (moninga ooh)
Moninga malamu (yaya)
Moninga ya libela (ya libela)
Moninga malamu (nayembi yo na nzembo)
Moninga ya solo
Moninga malamu
Moninga ya libela
Simba nga na loboko to tambola, moninga eh-eh
Moninga ya pasi oh, moninga ya bisengo eh
Oyo atikaka bato té, oh oyo abosanaka bolamu té oh
Otikaka ba oyo ya yo té oh, ya Yesu moninga aah
Moninga malamu (moninga, eh-eh)
Moninga ya solo (ata batu ba sundoli ngayi eh)
Moninga malamu (ngayi nako banga té oh-oh)
Moninga ya libela (nazali na yo yaya)
Moninga malamu
Moninga ya solo (yo ndé moninga na nga)
Moninga malamu
Moninga ya libela (yaya, eeh)

Moto soki azali na bomengo, azalaka na ba ninga mingi oh
Aza na bozwi bato nionso ba ko linga yé, oh
Kasi na tango ya bo zangi eh, bango nionso bango nionso ba palangani oh
Tika to yeba yo tango tozali na bomoyi, oh
Po eté mokolo ya suka oko bosana biso té, oh
Moninga malamu
Moninga ya solo
Moninga malamu
Moninga ya libela
Ko lela té moninga ata mobali ya bolenge asundoli yo
Ata abosani bana oyo bazuwa yé mobimba
Ezali na mobali ya libala kombo nayé Yesu, eh
Moto oyo ozalaki ko lambela, ozalaki ko sunga po eté atanga, eh
Lelo abosani yo, bolingo oyo abosanaka moto té, oh
Abengama mobali ya libala eh, motena n'eklezia, eh
Bato oyo nionso ba talelaka yé, ooh
Bamonaka yé oh, yé ndé moninga malamu
Moninga malamu (abomaka té)
Moninga ya solo (ako kotela yo sekelé pé té, oh)
Moninga malamu (po eté a assassiner yo té)
Moninga ya libela (ako tiela yo pé poison té, oh azali bomoyi oh)
Na talelaki famille, eh lelo na suki ndé wapi ba ndeko
Moto nionso ya bozwi na famille ba talelaka sé yé-yé
Lobi-lobi suka sé na déception eh
Lelo na yebi moto moko kombo na yé Nkosi na Yudah, eh
Soki otaleli yé, y'oko yokisama soni té eeh
Yango wana ndeko na nga talela yé
Oza bolingo ya solo, obwakaka té Nkolo
Olokota nga na fulu eh, opesa nga tina na miso ya bato
L'ami fidèle eh, l'ami de tout le temps
Nalingi yo, lolango n'o tina eeeh
Ba oyo ya yo baza kolela, elekeli bango, eyi
Ba sundolami, yaya simba Nkolo eeeh
Yo Emmanuel eh, yo ndé moninga na ngayi
Yesu kobwaka ngayi té, Yesu ko lemba ngayi té, oh
Yo Emmanuel, yo ndé moninga na ngayi té, oh (Nzambé na Abraham eh, Nzambé na Izaka)
Yesu kobwaka ngayi té, Yesu ko lemba ngayi té, oh (ko tikaka bi tiké té, moto oyo papa salisaka)
Oyo mama asungaka, a rassuraka biso
Lelo to bwakami yaya, eh
Ata mbongo ya ko futa kelasi eza té, eh telema (yo Emmanuel eh, yo ndé moninga na ngayi)
Yaya (Yesu kobwaka ngayi té, Yesu ko lemba ngayi té, oh)
Ko tika ngayi té yaya, eeh-eh (yo Emmanuel eh, yo ndé moninga na ngayi té, oh)
Lisungi ya bi tiké (Yesu kobwaka ngayi té, Yesu ko lemba ngayi té, oh)
Ba veuves baza kolela, mabota eza kolela yaya eh
Yaya, eh (mon ami fidèle)
Mon ami fidèle (mon ami c'est Jésus)
Mon ami (mon ami fidèle)
Nous avons que toi, tu es notre secours (mon ami c'est Jésus)
Ne nous abandonner pas Jésus
Moninga malamu
Moninga ya solo (je n'ai personne d'autre)
Moninga malamu (je n'ai que toi, oh)
Moninga ya libela (Emmanuel dans ma vie, ooh)
Emmanuel, eeeh
Soit avec moi

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители