Kishore Kumar Hits

Bana O.K. - Hommage à Luambo Makiadi текст песни

Исполнитель: Bana O.K.

альбом: Héritage de Luambo Franco (TP OK Jazz)


Luambo eh Luambo oh oh
Ooh ooh ooh Luambo eh eh,
Luambo fungola miso oh tala
(Oh Luambo eh Luambo)
Ndenge mokili bazali kolela yo,
Batata na bamama mpe bana
(Oh Luambo eh Luambo)
Ndenge tozali kolela yo,
Liyo losalela Luambo molimo
(Oh Luambo eh Luambo)
Kolela na biso esili te eh
Mokolo yango eh moyi mobimaki na cinq heure ya tongo,
Molunge mokatali ngai na ndako eh mokati ngai ndoto na zalaki kolota.
Mokolo yango eh di Luambo moyi mobosani ngonga mobimi na cinq heure ya tongo,
Nzoko ezalaki nde lembo ya mokuya likambo lizali koyela biso,
Ndoto na zalaki kolota ndoto ya somo bakangi ngai na mongongo,
Pema ekangami ngai na se ya pongi
Naluki nalamuka nzoto kilo,
Telephone na zuwaki lobi elongwe princesse sango ya mabe,
Basengi ngaina sambela makasi epai ozali nzoto epongi te.
(Guitar)
Kolaka ya suka di Luambo maloba yasuka olakaki biso na tembe,
Lisolo kosololaki yo na lokunku epesaki biso mwa elikia,
Nzoka lokuta eh di Luambo kolobi na mama ngonga abimaka atambolaka,
Kolokaki biso kozonga eh koyoki nzoto mwa makasi eh,
Sango de sango di Luambo sango de sango epai oh ozali,
Malobi na ngai nasala noki eh noki nafota yo te,
Tongo eh tana simwa ya mwa bangonga mokili mokolingana eh,
Radio e kobelela ba telephone kwepai oh Luambo akufi,
Na mibabi na faute epai na koganga maboko na motooo. Luambo eh.
Nzambe mpona nini boye liwa yo mabe na kolemba kokamwa yo te,
Na kolela mbinzoli eboi nde kobima komotindo oyo maloba masi ngaina monoko Franco oh,
Nafungoli lisusu radio ponaka malamu soki babosani te eh okoboya bazali kotanga,
Moyi eleki makasi est ce que ya solo matoi nangai euti kombo ya Luambo,
(Luambo eh ... Luambo)
Moyi eleki makasi mbinzoli na ngai Engungi na kati ya molunge
Tongo etani mama eh loto na lotaki na tuna ndimbola na bato,
Kasi ndoto yango engungi ndoto ya makambo ndoto ya mawa,
Sango de sango di Luambo sango di sango epai okendeki kosalisa nzoto,
Ngai tikela maboko na kosela visa tongo na lambalaka ya suka,
Franco oboyi na kuta yo oboyi konzela samedi ngai na Lingaki koya eh...,
Jeudi okati motema otikeli ngai liloba te na ye bongo
Tongo etani mama eh loto na lotaki na tuna ndimbola na bato,
Kasi ndoto yango engungi ndoto ya makambo ndoto ya mawa,
Sango de sango di Luambo sango di sango epai okendeki kosalisa nzoto,
Ngai tikela maboko na kosela visa tongo na lambalaka ya suka,
Franco oboyi na kuta yo oboyi konzela samedi ngai na Lingaki koya eh...,
Jeudi okati motema otikeli ngai liloba te na ye bongooooo.

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители