Kishore Kumar Hits

Franco & le T.P OK Jazz - Makambo Ezalu Minene текст песни

Исполнитель: Franco & le T.P OK Jazz

альбом: World Legends


Mobali akende na poto, yo
Mobali akende na poto, oh
Akende ko yekola oh
Akendeki esika ya lisano oh
Akende motako, oh
Oyo nine eh
Esika ya lisano moto nioso asakanaka
Esika ya mawa moto nioso alelaka
Ngai na leli mobali eh
Akende motako oh
Oyo nini eh, eh
Na kuti na lopango bato bazali kolela
Ngai na bandi na ngai mpe kolela
Kolela na ngai mawa ya mobali eh
Mawa na ngai ya System eh, ye
Mawa na ngai ya Fiston ye
Akozonga sanza nini eh
Akozonga mbula nini eh, en en
Oyo nini eh, eh
Mikanda na yo ozali ko tinda
Mbongo papa ozali ko tinda
Na telephone tozali kosolola
Mbote na famille ozali ko pesa
Na lingi présence eh
Nga na lingi présence
Ya bo moto na yo papa
Oyo nini eh, eh
Boya makambo ezali minene eh, eh
Boya makambo ezali minene eh, eh
Franco, a beleli na América oh, oh
Franco a beleli na Bruxelles oh, oh
Franco a beleli na Paris eh, eh
Balobi makambo ezali minene eh, eh
Makambo ezali minene eh, eh
Na sengi Dodo nzela nga na bima
Dodo a ndimeli ngai na motema en
Nga na bimi, Mambo, na butu
Na kuti Dodo na maboko
Ya mbanda na ngai
Miso zoba eh salite
Makambo ezali minene eh, eheh
Motema elinga ndenge nini eh
Makanisi evanda denge nini eh
Motema eboya ndenge nini eh
Molimo na tiya yango wapi eh
Dodo a décevoir ngai eh
A longoli ngai na esika na lingaka ye
Makambo ezali minene eh, eheh
Nazalaka souci na motema, maman
Yango na koma komela mingi eh
Yango na koma kwiti-kwiti eh
Po na longola souci ya mobali oyo
Akoma na camarade na ngai eh, Lusala eh
Makambo ezali minene eh, eheh
Boya makambo ezali minene eh, eh
Boya makambo ezali minene eh, eh
Franco, a beleli na América oh, oh
Franco a beleli na Bruxelles oh, oh
Franco a beleli na Paris eh, eh
Balobi makambo ezali minene eh, eh
Makambo ezali minene eh
Boya makambo ezali minene eh, eh
Boya makambo ezali minene eh, eh
Franco, a beleli na América oh, oh
Franco a beleli na Bruxelles oh, oh
Franco a beleli na Paris eh, eh
Balobi makambo ezali minene eh, eh
Makambo ezali minene eheh
Makambo ezali bourreau)
Mobali a linga ngai a pesa ngai masanga
Lobi na tongo nga na kawuki monoko
Mokolo lopango liboso ya ndanko
Kitoko na ngai na mayi oh, edindi
Makambo ezali minene eh, eheh
Mobali a pekisi nga ba
Nzela ngai na kendeke
Na vandeli ye na ndanko (abongisa)
Kasi sombela ngai ba metrage eh
Kasi sombela ngai ba bijoux eh
Kasi sombela ngai ba sapato eh
Mobali ya bandi na ye nde kolela
Makambo ezali minene eh, eheh
Moninga alula nga na elamba na lataka
Asengi nga elamba a lata (ko pesa te)
Naboyi to sangisa solo ya nzoto
Na pimeli ye elamba eh, eh (c'est bien)
To bimi asopeli ngai masanga na nko
Makambo ezali minene eh, eheh
Na pekisi moninga nangai abunda
Likambo ba weli ya ticket oh
Ticket ya Kinshasa Bruxelles oh, oh
Likambo ezokisi mobali ya bato
Ticket ebimisi sekele oh ye
Makambo ezali minene eh, eh
Likambo to swani ngai na Zenaba, Franco
Ngai nazali maman ya likelemba
Ba lundi minei aboyi ko pesa likelemba
A tomboki na ngai eh
A tobomki makasi eh (miso makasi)eh
Mobali awuti soki wapi eh
Ebele ya mbongo na poche eh
Awuti ko teka soki nini eh (ye moko oyebi)
Na pokwa aleisi ngai chez Babin eh
Na tongo asopeli ngai mandefu eh ye
Na pokwa ayeli ngai na zongisa mosolo
Makambo ezali minene eh, eh
Oya makambo ezali minene eh, eh
Boya makambo ezali minene eh, eh
Franco, a beleli na América oh, oh
Franco a beleli na Bruxelles oh, oh
Franco a beleli na Paris eh, eh
Balobi makambo ezali minene eh, eh
Makambo ezali minene eh, eh

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители