Kishore Kumar Hits

Franco & le T.P OK Jazz - Matata Ya Mwasi Na Mobali Ekoki Kosilate текст песни

Исполнитель: Franco & le T.P OK Jazz

альбом: World Legends


Oh oh nasali nini oh
Senzela mwana moninga, ozui ngai na mpasi
Batela ngai na ntango likambo bamona
Bondela ngai soki nasaliki,
Mwasi alingaka présence ya mobali eh
Oh tokabola faute
Mabe ebandi na yo, mpe na ngai eh
Lokola bato bayebi, toluka équilibre
Senzela mwana ya bato eh
Bondela mwana ya bato eh
Matata ya mwasi na mobali esila te na mokili
Mama ah, mama ah
Oh mama, mama ah, mama ah
Oh maaama,
Likambo nini nzambe osala biso mibali,
Tosalelaka basi, bango baliyaka, balataka,
Biso mbula mobimba patalo moko na nzoto eh
(Etoboka kutu eh)
Oh maaama,
Matata ya mwasi na mobali esila te na mokili
Mama ah, mama ah
Oh mama, mama ah, mama ah
Oh maaama,
Mama aboti ngai mwasi
Oyo akoniokola ngai mwasi
Nzambe apesi ngai etumbu,
Nabotaka basi bandeko
Bananiokolo bana ya bato,
Nayoka motema mpasi bandeko oh oh oh mama ah
Oh ma ma mama mama
Matata ya mwasi na mobali esila te na mokili
Mama ah, mama ah
Oh mama, mama ah, mama ah
Oh maaama,
Soki abimi azongi, kotuna epayi awuti te
(Comment!)
Soki yo okendeki ko traiter ba affaires
Olobi ozonga, olia, opema,
Akomi kotuna yo
(Owuti wapi?)
Ozalaki wapi, owuti wapi, balobaki boye
(Oh!)
Mwasi nabala na mosolo, nani apesi ye autorisation,
Atuna epayi na wuti bandeko oh oh oh mama ah
Oh ma ma mama mama mamama
Matata ya mwasi na mobali esila te na mokili
Mama ah, mama ah
Oh mama, mama ah, mama ah
Oh maaama,

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители