Kishore Kumar Hits

Simaro Massiya Lutumba - Verre Cassé текст песни

Исполнитель: Simaro Massiya Lutumba

альбом: Maya: L'Album des Albums


Tongo ya lelo, tongo ya makambo ima
Moyi moboyi kobima lelo, tongo ya mokuya mama eh
Tongo ya lelo, tongo ya makambo maman eh
Ndoto nalotaki na butu, ndoto ya ba ndoki maman eh
Tongo ya lelo, tongo ya makambo ima
Dix ans de silence, lelo na loti yo lisusu-eh-eh

Napekisaki yo ko kende, nalingaki té to kabwana
Tala lelo ngo, ofingisi ngai na miso ya bato ya Kinshasa
Na bondelaki yo mingi, ebongaki oyokela ngai
Tala lelo oyo okomi ko nyiokuama, oh ngai nazali té
Sango nazali koyoka balobi ngai mobali ya poison
Ba zuzi ya nzela oh, bapesi ngai faute, likambo batuni té
Sango nazali koyoka balobi ngai nazangi reconnaissance
Ba zuzi ba nganda oh, bapesi ngai faute, likambo bayebi té
Fololo na loboko kendé na lilita ya tata, osenga bolimbisi oboyaki kotosa maloba maye
Soki bongo ebosani, bandeko to pé esali faute
Nzoto mobimba eko futa faute ya bongo
Pongi na kiti ya matanga bandeko, ndoto ndambo-ndambo
Epayi bako yemba, epayi bako lela mama eh

Mopépé mwa, pokua mwa moyi, mwa ebalé ya Zaïre
Naboyi ememela ngai ngo, cherie oh, sango nayo ya mawa
Mopépé mwa kaïna, mwa pokua, mwa moyi, mwa ebalé
Naboyi ememela ngai ngo, chérie oh, sango nayo ya mitelengano

Samedi ya lelo, samedi ya makambo maman
Ngai naboyi ndé kobima, poso ya makambo ye ye eh

Samedi ya lelo,samedi ya makambo maman
Ndoto nalotaki, oh, ndoto ya makambo ye eh
Poso ya lelo, poso ya makambo maman
Dix ans de silence oh, lelo opesi nga raison nasé ya motéma ah
Napekisa yo kokende nalingaki té tokabwana
Tala lelo oh ekomi verre cassé sans réparation oh
Nabondelaki yo mingi, ebongaki oyokela ngai
Tala lel'oyo okomi koniokwama ngai nasi na bali, nasi na bali ye yo eh
Sango esali nga pasi balobi ngai maboko makasi
Babosani ba basi na monela yé, nazua souvenir té, kaka ba choc ya lamulu
Nabondelaki yo mingi, nalobaki sé likambo moko
Biso bikongenga na miso nionso pauni té eh
Fololo na maboko, kendé na lilita ya tata
Osenga bolimbisi, oboyaki koyoka maloba mayé ah
Soki bongo ebosani, bandeko, to pé esali faute
Nzoto mobimba eko futa faute ya bongo eh
Pongi na kiti ya matanga, bandeko, ndoto ndambo-ndambo
Epayi to koyemba, epayi tokolela, masiya ah-ah, ah-ah
Mopépé mwa pokua, mwa moyi, mwa ebalé
Naboyi ememela ngai oh, lolaka oyo ya sango nayo ya mawa ah
Mopépé mwa pokua, mwa moyi, mwa ebalé
Na sengi ememela ngai losambo na gai epaya nzambé eh, ah-ah-ah

Lelo yo wana okomi na pasi
Nga nazangi moyen na bikisa yo ata pé lokola tokabuana
Nakolinga té nayoka yo na sango ya pasi eh
Lelo yo wana na mbéto ya lopitalo
Nga nazangi moyen naya kotala yo
Epa natikala, nga nasi nabala
Bako pesa ngai té, permission natala yo oh

Sango nayoki, olingi ko kufa
Ngai nazangi nguya nabikisa yo
Napesi elikya sé na losambo
Nalongoli maloba ya kanda nionso tolobanaka ah
Lelo yo wana okomi na pasi
Nga nazangi moyen na bikisa yo
Ata pé lokola tokabuana
Nakolinga té na yoka yo na sango ya pasi eh
Lelo yo wana na mbéto ya lopitalo
Nga nzangi moyen naya kotala yo
Epayi natikala ngai nasi nabala
Bako pesa ngai té, permission natala yo

Sango na yoki olingi kokufa
Ngai nazangi nguya nabikisa yo
Napesi elikya sé na losambo
Nalongoli maloba ya kanda nionso tolobanaka

Bato olandaki bakosiyo maman
Mayi ya ebalé ekotcholaka ekonanaka té
Bato ya mokili balingi eloko oyo basala
Oyo ko basale té oh, bango ba kipaka té
Ata ko tokabuani famille etikala
Kasi ya koyoka yo na pasi, oh souci
Oh Diyo lelo nazangi mosolo nabikisa yo
Nafuta dokotolo, marabou na nganga kisi
Natali sima molongo ya ba ndeko bazali ndé kolela
Nazingi maboko ekomi verre cassé oh
Miso miko ngenga pauni té eh
Ata tokabuani, soki tokutani, topesanaka mbo'-oh, mboté
Bato olandaki bakosiyo maman
Mayi y'ebalé ekotcholaka ekonanaka té
Bato ya mokili balingi eloko oyo basala
Oyo ko basala té, oh bango ba kipaka té
Ata ko tokuambuani famille etikala
Kasi ya koyoka yo na pasi, oh soucis
Oh Diyo lelo nazangi mosolo nabikisa yo
Nafuta dokotolo, marabou na nganga kisi
Natali sima molongo ya ba ndeko bazali ndé kolela
Nazingi maboko, elikya sé na losambo
Binso biko ngenga ngo pauni té
Binso biko ngenga na miso, binso pauni té
Dix ans de silence, lelo na loti yo lisusu Gina eh
Binso biko ngenga ngo pauni té
Binso biko ngenga na miso, binso pauni té

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители