Kishore Kumar Hits

Simaro Massiya Lutumba - Affaire Kitikwala текст песни

Исполнитель: Simaro Massiya Lutumba

альбом: Maya: L'Album des Albums


Litambwé
Tata yéla ngáí lindanda nayoki mpósá ya koyemba
Oh nakoléla la vie oh
Mpasi ya mokili eh
Litambwé Masasi
Tata yela nga lindanda nayoki mposa nga nayemba
Oh nákoyemba mpasi oh
Mpasi ya mokili eh
Litambwé Luntadila
Tata simba ngáí tokende
Na mokili ya nsé tozui té oh
Tokozua atako na paradizo eh
Sambelaka eh
Na ntángo ya mpokua liboso ya kolala
Sambelaka Nzakomba
Sambelaka eh
Ata liboso ya kobenda mua nkopo
Sambelaka Yahvé
Na mokili ya nsé
Nzambé akaba ba chance, akaba bilongi oh
Na mokili ya nsé
Egalité ikélé vé oh
Na mokili ya nsé
Ekomama bongo oh
Egalité oh
Ezali sé na zando mpé na tango ya liwa
Kolélaka té oh
Na bolingo ya nsé
Mibali balingi sé basi ya mobulu
Oyo akoniokola yé
Yé akolinga yé mingi oh
Ekomama bongo
Basi balingi mabala ya moniokoli
Oyo akosalisa yé
Yé akokamata yé ndé zoba
Na bolingo ya nsé
Ekomama bongo oh
Moto yo okolinga eh
Yé akolinga mosusu
Mama yě yě
Yě yě yě yě
Odila Ntiti eh
Ndéko tika nanu koléla
Longola loboko na litama eh
Longola loboko na litama Kiliko eh
Longola mpinzoli na miso Amisi eh
Longola loboko na litama
Ǒ mpona kolela la vie
Mpasi ya mokili eh
Ngáí nazaláká na zuwa
Natékéla basi ya mabala
Nazaláká lolendo
Natikéla bayé bazua kitoko
Kitoko eloko pamba eh
Kitoko ndé mabélé oh
Nazalaka lokuta
Natikéla ba tailleurs na ba ménuisiers oh
Mama eh
Natekéla ba esquiveurs na ba mécaniciens
Lokuta na ngáí
Nakindéla ba technicien ya ba télévision na ba frigo
Nakaba lokuta na nga na ba escrocs
Na ba nganga nkisi eh
Mama eh
Litambo eh, sala lokola ngaï
Na mokili ya nsé
Eloko moko tokopésa toli
Ata ozangi nionso
Kasi kozanga mbéto té oh
Somba mbéto ya kitoko
Mokolo yo okokufa ndéko eh
Soki mbéto ya kitikwala
Ebembé na yo ekoyoka nsoni
Kinshasa makambo
Na matanga tomonaka ndé makambo
Basusu bákoléla
Basusu bákotonga mbéto ya mowéi
Surtout soki oyébanaka
Mokili ngo makambo mama
Mokili ngo makambo mama eh
Oh Ferouz yela nga ya mpío
Lokóla nazali nanu na bomoyi
Kuna na nsé ya mabelé molungé elekí trop
Na la vie élingi boyé
La vie élingi boyé
Na la vie ô buka mikúwa ntángo ozali na minu
Sépélisa nzoto ntángo ozali makasi
Lobi okokufa mama
Na la vie baloba boyé
Ba nkoko baloba boyé
Na la vie ô yéba ntalo ya mbisi ntángo tata azali na bomoyi
Yéba talo ya kwanga ntángo mama azali bomoyi
Lobi bakokufa mama
Na mokili ya nsé
On ne vit qu'une seule fois eh
Sakana libéla
Soki ozui mwa ntango eh
Mélaka libéla
On ne vit qu'une seule fois eh
Yaka ô tolingana
Tala ô ntángo ezali koléka eh
Liwa ékozéla
Mabélé éponaka sé éloko ya kitoko
Mabélé oh
Aleili biso Bwalé Lésé oh
Mabélé oh
Bana ya Loméka bazali nde koléla Mujinga
Mbuta akolela
Loboko na litáma eh
Mujinga eh
Okeyi nde mobésu eh mamá
Bana ya Loméka
Bazangi lokóla Ma Gabi azangi
Akolela ngala eh
Ngo digbena eh
Ba mama ya zándo
Bazangi lokóla bana Lingwala bazángí
Bákoléla ah na muyanzi
Wapi tshoboke
Na mokili toyaki
Tozali lokóla na kati ya masuwa
Monano to na motio libóngo ekosiema
Bato bakokita
Ekomama bongo
Nzela ya mokili elekí ndé molayi
Etondi na nzube
Ezalí na suka te oh
Na mokili tozali bapaya ngo tokoleka nzelá
Tika ô nasakana
Mamá ayebisaká nga date oyo nabotama
Kasi oyo nakokufa ayebisaká ngai te oh
Nzosimo yela ngáí nkopo ya mpío
Lobi ekozala soki tour na Nga kuna na nsé ya mabelé
Molungé elekí mingi oh
Na mokili tozali bapaya ngo tokoleka nzelá
Tokoleka nzelá Natíti eh
Tokoleka nzelá Kiliko eh
Gertrude bengela Nga ya Cisco eh
Gonano bengela Nga ya Nkosi eh
Tokoleka nzelá Zekera eh
Tokoleka nzelá mamá eh
Tokoleka nzelá mamá eh
Gertrude bengela Nga ya Cisco eh
Gonano bengela Nga ya Nkosi eh
Tomela nkopo ya mpío mamá eh
Na nsé ya mabelé molungé elekí mingi oh
Tokoleka nzelá eh
Tokoleka nzelá Ma Nzimalanda
Tokoleka nzelá Kinsala
Tokoleka nzelá ango Mendoza

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители