Kishore Kumar Hits

Simaro Massiya Lutumba - Ebale Ya Congo - Remix текст песни

Исполнитель: Simaro Massiya Lutumba

альбом: Procès


Masuwa eh, Maswa
Yo wana omemeli o na ngai bolingo eh
Oyebaka
Na kozela oh
Masuwa ekonana loseba ebeti
Masuwa ekonana bolingo mpe enani
Masuwa ebungi o na kati ya londende
Bolingo mpe ebungi oh nakati ya londende
Ngaï na libongo naleli oh mbole oh mama oh
Chérie okendeke malamu mbole oh
Elaka okomelaka ngaï soki okomi
Nayeba bolingo obosani ngaï te oh
Nadima bolingo ata ndele okodzonga
Nazali se kozela mokolo masuwa ekozonga
Ngaï awa ata sango ya pamba Jeanine oh mama ha oh
Ebale mozindo ekoti ngambo
Matiti ekotsiola
Ba buato ekotsiola oh
Kasi bolingo na ngaï enani se konana
Na zali se kozela mokolo maswa ekozonga
Ngai awa nabeli ba soucis ya lamulu oh mama oh
Lelo na kanisi yo mingi Jeanine
Nase ya kuiti na bandi nde kolota
Yo lalisi moto na lipeka na ngaï
Olobeli ngaï liloma na mua likukuma
Dizoni oh
Ndoto ya kuiti mawa mingi oh mama oh
INSTRUMENTAL
Masuwa ememeli ngai bolingo Nzambe oh
Nabenga nani lolemo emesana
Kombo ya mbole oh, lolemo emesana
Mongongo ya mboleoh, matoyi emesana
Dizoni oh
Nazingi maboko na ba soucis oh mama oh
Eloko esali ngaï makinisi Dizoni oh
To vandi ba mbula
To vandi mpe ba sanza
To vandi ba mposo
To vandi mpe mikolo
To meseni bolingo na mode ya liboma
Dizoni oh
Na tangi ba plafond na ba soucis oh mama oh
Photo yotikela ngai na libongo oh
Nakati ya motema ekoma nde eleli
Na monaka nzela nionso na ko kende oh
Na belela na mosika eleli ebungi
Dizoni oh
Nabeli ba soucis ya lamulu oh mama oh
Eloko bolingo ezanga miso oh
Moto oyo okolinga a ko linga yo te oh
Oyo okoboya a kolinga yo mingi oh
Oyo okokima akolanda yo mingi oh
Etumbu oh
O ya ba mpasi ya lamoulou oh to ko monaka oh
Mama mi na lewa oh mama oh
Mama na kokufa oh mama oh
Yéhéeee, Yéhéee
Mama na kowa oh mama oh
Mama na kokufa oh mama oh
Mamu na kufa oh mama oh
Yéhééeee, Yéhéééé
Mama na kokufa oh mama oh
Mama na kobeba oh mama oh

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители