Kishore Kumar Hits

Simaro Massiya Lutumba - Mabele (Ntoto) текст песни

Исполнитель: Simaro Massiya Lutumba

альбом: The Very Best of Simaro, Vol. 1: Mabele (Ntoto)


Soso eleli e soso ekolela ngoya
Le coq vient de chanter; le coq est en
Train de chanter
Soso ekolela o bandoki bazongi ndako
Le coq chante et les sorciers
Reviennent à la maison
Sima ya mwa ngonga ntongo ekotana
Dans quelques instants il fera jour
Ntongo ekotana o ndeko ya makambo
Le jour va naître, synonyme des
Vicissitudes
Basusu na bisengo basusu na mawa
Certains dans la joie, d'autres dans la
Tristesse
Wapi yo Mbole oo
De quel côté es-tu, Mbole?
Kady opesi kanda esika na motema
Kady, tu as cédé un espace à la colère
Dans ton cœur
Bougie ekotangisaka mpinzoli po na pasi
Une bougie verse des larmes de
Souffrances
Eleli pasi ya moto ngai naleli ya lolango
Elle pleure des souffrances de la
Flamme; moi, des chagrins de l'amour
Okotiaka kobanza tiki moto akobela
Tu te préoccupes quand quelqu'un est
Malade
O po na yo e bolingo eleki metele mama
A a
Pour toi, l'amour est outre-mesure
Mabele dis Zwani
La terre, dis, Jeanne
Mabele
La terre
Moto na bolenge alingi asala économie
Quelqu'un dans sa jeunesse décide de
Faire des épargnes
Azali nde kobanza mokolo akokoma
Mobange
Pour prévoir les jours de sa vieillesse
Akoma mobange achangé nde makanisi
Devenu vieux, il change d'avis
Alobi aliya falanga na ye nyonso
Abomba
Il se dit qu'il vaut mieux dépenser tout
L'argent qu'il a épargné
Noki etikala o na ba oyo bamonaki pasi
Te basakana na falanga
De peur qu'il ne reste aux mains des
Gens qui n'ont pas souffert, qui le
Gaspilleront
Mabele nga nalela ye
La terre, faut-il que je pleure?
Mabele mabele ye ye ye ye
La terre, la terre ye ye ye ye
Mokolo nakokoma mobange Masivi
Quand je deviendrai vieux, Masimi
Nayebi nakotambola na nzete na bala-
Bala
Je sais que je marcherai à l'aide d'un
Bâton sur la rue
Mpo nasengaka likuta nga nabikela
Pour quémander aux passants quelques
Centimes pour ma survie
Basusu batunaka soki nga nabalaki te
Certains voudront savoir si je ne me
Suis jamais marié
Basusu batunaka soki nga nabotaki te
D'autres voudront savoir si je n'ai pas
Eu d'enfants
Ba oyo nakabelaka bakomi nde koseka
Ngai
Ceux à qui j'avais fait des largesses
Deviendront des voix moqueuses
Nakipa te o Nzambe nasalaka la vie ya
Sans souci
Ça ne me préoccupe pas, puisque je
Mène une vie insoucieuse
Mabele mabele mabele ye ye ye ye
La terre, la terre, la terre
Mabele o dis Lumengo ye eh
La terre, dis, Lumengo
Mabele dis (...)
Mabele o Djitatima ye ye ye
Mabele o
Mokolo nakokufa nkake ekobeta
Le jour de ma mort, la foudre retentira
Djitatima yo olobelaka bato maloba na
Nga yasuka
Djitatima, toi, tu diras aux gens mes
Derniers mots
Moto na nga bakamata basala
Monument
Qu'on dresse un buste pour moi sur la
Place publique
Soki mopaya aye balobela ye sango
Pour qu'on explique aux visiteurs de qui
Il s'agit
Bambanda bakosepela basi nga natiki
Mes rivaux se réjouiront à cause des
Femmes que j'aurai laissées
Bafamille bakosepela biloko nga natiki
Les membres de ma famille se
Réjouiront à cause des biens que j'aurai
Laissés
Binemi bakoloba apusaka lofundu
Mes ennemis diront: Il était trop
Arrogant
Ebembe ya soso matanga te
Pas de veillée funèbre pour une poule
Nalanga nzembo nalanga makambo
J'ai composé des chansons; j'ai dit des
Choses
Mabele
La terre
La vie na ngai o oyo ya sans souci
Ma vie, tu détestes cette insouciance
Mwasi na ngai nzinzi famille na ngai
Mabele
Ma femme est une mouche; ma
Famille, c'est la terre
Nawuta na mabele nakozonga na mabele
Je suis venu de la terre et je rentrerai
Dans la terre
Mokolo nakokufa nayebi nakopola
Quand je mourrai, je sais que je vais
Pourrir
Baliyaka na ngai bakokanga zolo na
Nsolo
Ceux qui ont mangé avec moi se
Boucheront les narines pour ne pas
Sentir l'odeur
Bamelaka na ngai bakokima kosukola
Ngai
Ceux qui ont bu avec moi refuseront de
Me donner un bain
Ebembe ya Masiya ata bokimi e banzinzi
Bakolela ngai
Le cadavre de Masiya, même si vous
L'évitez, les mouches, elles, me
Pleureront
Nazali na confiance e e
Ça, j'en suis sûr
Mabele
La terre
La vie na ngai oyo ya bayanke
Ma vie, tu détestes le style des je-
M'en-foutistes
Falanga nasalaka ya mboto na lituma
L'argent que je gagne, c'est pour un
Plat de poisson et bananes plantains
Mwasi aboya nga kasi kopo ya masanga
Ve
Une femme peut m'abandonner, mas le
Verre de boisson ne le fera pas
Etoko na ngai nasomba mpo na nkiriba
Pour mon sommeil c'est une natte que
J'ai achetée
Tokoluka tozipa miso tongo etanela
L'essentiel, c'est de fermer les yeux
Jusqu'au matin
Namesana kolata kaki na lipapa
Je porte souvent des habits en kaki e
Des babouches
O po nayebi e mokolo tokokufaka
Tokendeke na drap ya pembe
Parce que je sais qu'à la mort on nous
Enveloppe invariablement dans un drap
Blanc
Ata ozali riche (...)
Même si vous êtes riche
Mabele ngai nalela ye
La terre, faut-il que je pleure!
Ye ye ye ye mama pokwa ekomi e moyi
Mokota
C'est le crépuscule, le soleil se couche
Butu ekoyinda mokolo mwa bandoki
Banganga
La nuit noircira, qui est la période des
Sorciers et des marabouts
Libala oyo ya mwana na kati e
Ce mariage a produit une enfant
Masuwa ekokufaka libongo ekotikalaka
Le bateau s'abîme, mas le port reste
Mama na Lola tangelaka mwana kombo
Ya Papa Masiya
Mère de Lola, ne cesse jamais de citer
à l'enfant le nom de son père Masiya
Mokili ekokufa masumu eleki
Le monde sera détruit; il y a trop de
Péchés
Kasi kombo ya Nzambe ekotikala seko
Mais le nom de Dieu restera à jamais
Mondele asala mandoki yakoboma bato
L'homme blanc a inventé l'arme à feu
Pour tuer des gens
Kasi ya koboma vérité mondele akoki te
Mais tuer la vérité, l'homme blanc ne
Parvient pas
Mabele o nga nalela ye
La terre, faut-il que je pleure!
Mabele mabele mabele ye ye ye ye
La terre, la terre, la terre ye ye ye ye
Mabele o mabele
La terre oh la terre
(Léger sebene)
Soso eleli e soso ekolela ngoya ó
Soso ekolela bandoki bazongi ndako
Sima ya mwa ngonga ntongo ekotana
Ntongo ekotana o ndeko ya makambo
Basusu na bisengo basusu na mawa
Wapi yo Mbole oo
Kokó opesi nkanda esika na motema
Kokó, tu as cédé un espace à la colère
Dans ton cœur
Bougie ekotangisaka mpinzoli po na
Mpasi
Eleli mpasi ya moto ngai naleli ya
Bolingo
Okotyaka kobanza (...) moto akobela
O po na yo e bolingo eleki metele mama
Mabele
La vie na ngai y'oboya sans souci e
Mwasi na nga nzinzi famille na nga
Mabele
Nawuta na mabele nakozonga na mabele
Mokolo nakokufa nayebi nakopola
Baliyaka na ngai bakokanga zolo na
Nsolo
Bamelaka na ngai bakokima kosukola
Nga
Ebembe ya masiya ata bokimi e banzinzi
Bakolela ngai
Nazali na confiance ee
La vie na nga y'oboya bayanké
Falanka nasalaka ya mbenda na likaya
L'argent que je gagne, c'est pour
L'alcool et le tabac
Mwasi aboya nga kasi kopo ya masanga
Te
Etoko na ngai nasomba mpo na nkiliba
Namesana kolata kaki lokola Lwambo
Je suis habitué à des habits en kaki,
Comme Lwambo
O po nayebi e mokolo tokokufaka
Tokendeke na drap ya pembe
Ata ozali moto ya mbongo
Même si tu es riche
Mabele mabele mabele
Yeyeyeyeye mama
Pokwa ekomi moyi ekokota
Butu ekoyinda mokolo mwa bandoki
Banganga
Libala oyo ya mwana na kati e
Masuwa ekokufaka libongo ekotikalaka
Mama na Lola tangelaka mwana kombo
Ya Papa Masiya
Mokili ekokufa masumu eleki
Kasi nkombo ya Nzambe ekotikala seko
Mondele asala mandoki yakoboma bato
Kasi ya koboma vérité mondele akoki te
Mabele mabele mabele e
Mabele nga nalela ye
Mabele mabele Djitatima ye ye
Mabele o
Mabele o nga nalela
Mabele

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители