Kishore Kumar Hits

Simaro Massiya Lutumba - Kadima текст песни

Исполнитель: Simaro Massiya Lutumba

альбом: The Very Best of Poète Simaro Massiya Lutumba, Vol 3: Mandola


Bako boma ngai mpo na yo Kadima eh
Mama abotayo apesa yo kombo Princesse
Kingo mwambe kitoko ya magie
Etoile ya famille
Baboyi ovanda na ngai
Nako landa yo te suka ya molongo eh
Kadi kabela nga otema mama oh oh
Kadi kabela nga nde motema mama oh oh oh
Mama oh
Kadima na sengaki yo permission
Na kende mobembo
Sima ya sanza nako zonga eh
Kadima na sengaki yo ozela ngai
Soki nawuti mobembo na kuta yo
Makambo menso
Lelo ko ma bongwani
Ba lobi na ngai obali Zuza
Oh nga na zwi nde choc na motema
Kadi kabela ngai nde motema mama oh oh
Kadi kabela ngai nde motema mama oh oh oh
Mama oh
Soiree ya suka to zalaka biso mibale
Loboko na kingo cherie eh
Oko lela lela nga eh
Ngai pe lokola yo
Souci elei nzoto
Na pesaki yo lopete otiya na mosapi eh
Olakisaka lokola carte ya citoyen
Ba tika ko tungisa yo
Ozali ocupe
Makambo manso, lelo ko ma bongwani
Ba lobi na ngai, obali Mao ooh
Nga na zui nde shoc na motema eh
Kadi kabela ngai nde motema mama oh oh
Kadi kabela ngai nde motema mama oh oh oh
Mama oh
Oh Mao oh!
Est-ce que ozali ko yoka biso?
Na OK Jazz
Josky atindeli yo mbote
Soiree ya suka to zalaka biso mibale
Loboko na nkingo cherie eh
Oko lela lela ngaimama eh
Ngai pe lokola yo
Souci elei nzoto
Na pesaki yo lopete otiya na mosapi eh
Olakisaka lokola carte ya citoyen
Ba tika ko tungisa yo
Ozali ocupe
Makambo manso, lelo ko ma baluki
Ba lobi na ngai obali, Kadi eh
Oh nga na zui nde choc na motema
Kadi kabela ngai nde motema mama oh oh
Kadi kabela ngai nde motema mama oh oh oh
Bato ya mokili mitema likoso nga na meki nzoto
Ebele ya basi na tondi Kinshasa
Bino bo poni se kadima
Ooh liponga naga kokana
Bazelaki se na kende mobembo
Kadi ooh Kadi ooh ya mama
Nani alambi ngai ngai na kati ya bolingo nabiso
Bolingo eboyi nga na kati ya pongi
Nga nazalaki kolala
Nga nazalaki ko lata kadima eee
Bato ya mokili balembigai na bo bandate
Lelo ba nyokolinga lisusu
Ebela ya bato zambe asala na mokili
Bango ba tingami kaka ngai
Oo liponga na ngai ya kokana
Ozelaki se nakende mobembo eee
Kadi ooh Kadi ooh ya mama
Matiti ya miso lokola céleri
Kingo mwambe lokola St Maria
Tina nini likama boye
Tina nini kaka ngai ooh
Kadi ooh Kadi ooh ya papa
Soirée ya suka tozalaka biso mibale
Loboko na kingo cherie oo okolelela ngai
Ba mbula na ba kanke to nokelaka biso mibale
Epayi ya père boucher tozalaka biso mibale
Na voiture ya mudizo tozalaka biso mibale
Kadi nasengaki se motema
Kadi nasengaki se motema

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители