Kishore Kumar Hits

Faya Tess - Makambo mibale текст песни

Исполнитель: Faya Tess

альбом: Au temps des classiques, vol. 4


Makambo mibale ebomi mokili mobimba ah
(Deux preblemes tuent le monde entier)
Liboso nde likambo ya falanga
(Premierement, le probleme d'argent)
Ya mibale likambo ya basi
(Deuxiemement, le probleme des femmes)
Baninga botiya matoyi eh
(Mes freres pretez vos oreilles)
Soki bana mibali balingani lokola bakufa
(Si deux jeunes garcons ont une forte amitie)
Elenge ya muasi akoki nde kokabola bango
((Une jeune fille ne peut les separer)
Soki akoti na kati na bango oh
(Si elle entre au mileu d'eux)
Na likambo ya falanga ah
(Quant au probleme d'argent)
Nakanisi bino moko boyebi
(Je pense que vous memes vous savez)
Malamu baninga bokeba oh
(Mieux vaut etre prudent)
Neyebi te
(Je ne sais pas)
Soki bo kodouter na maloba ma ngai
(Si vous douter de mes paroles)
Nakinisi pe te oh
(Je crois que non)
INTERMÈDE
Soki bana mibali balingani lokola bakufa
(Si deux jeunes garcons ont une forte amitie)
Elenge ya muasi akoki nde kokabola bango
(Une jeune fille ne peut les separer)
Soki akoti na kati na bango oh
(Si elle entre au milieu d'eux)
Na likambo ya falanga ah
(Quant au probleme d'argent)
Nakanisi bino moko boyebi
(Je pense que vous savez vous memes)
Malamu baninga bokeba oh
(Mieux vaut etre prudent)
Nayebi te
(Je ne sais pas)
Soki bo kodouter na maloba ma ngai
(Si vous allez douter de mes paroles)
Nakanisi pe te oh
(Je crois que non)
Na makambo oyo
(Pour ces problemes)
Kotia tembe te
(Ne doutez pas)
Baninga ba ngai oh
(Mes freres)
Kende epai ya na zuzi
(Allez chez les juges)
Makambo bakosambaka
(Les problemes qu'ils tranchent)
Mosusu yango oyo
(D'autres sont ceux-la)
Likambo tokowelaka
(Les problemes pour lesquels nous disputons)
Likambo ya mbongo na basi
(Le probleme d'argent et de la femme)
Eboma mboka
(Tuent le pays)
Baninga mibali oh
(Mes freres hommes)
Tokebaka
(Soyons prudents
La vie est un combat oye
SEBENE
Na makambo oyo
Kotia tembe te
Baninga ba ngai oye
Kende epai ya ba zuzi
Makambo bakosambaka
Mosusu yango oyo
Likambo tokowelaka
Likambo ya mbongo na basi
Eboma mboka
Baninga mibali oh
Tokebaka
La vie est un combat oye

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Keba

2000 · альбом

Похожие исполнители