Kishore Kumar Hits

Alain Moloto - Naza ya yesu текст песни

Исполнитель: Alain Moloto

альбом: Les fruits de mes lèvres


Naza ya yo Yesu
Opona ngai pona tatola bilembo ya bolingo bwayo kati na bato
Otia ngai elembo ya bokonzi bwa yo
Mpe otangelanga nkembo na yo
Po'été mitema mwa bato misopana na masanjoli liboso na yo, Nkolo
Naza ya Yesu oyo atondi nga motema pe alati nga molimo
Mpo'ete nazala mosali kati naye mpe esaleli na maboko maye

Atondi nga motema, alati nga molimo
Nzoto mpe mayele, naza ya Yesu
Alatisi nga elamba ya sika, bomoyi ya ba santu
Mpe motole ya nkembo na moto, naza ya Yesu
Akomisi nga moninga ya motema na ye
Ngolu ezanga suk, naza ya Yesu
Apesi nga nionso oyo ezali ya ye
Mpo'ete ngai nabika bomoyi ya nzambe
Apakoli ngai mafuta eko ngengisa molimo mwa nga
Mpo'ete nguya ya Nzambe etambwisa nga
Akomisi kombo na ngai na buku ya bomoyi na ye
Mpo na sala seko ya Yesu
Naza ya Yesu, na botama na molimo mosantu, na nzoto te
Naza ya Yesu, bomoyi na nga ekoma na ngo libonza ya Nzambe tata
Naza ya Yesu, na bombama na makila motuya ya mwana Nzambe
Naza ya Yesu, na simbama na liloba Nzambe ya Nkolo na bomoyi
Yango ata bitumba eleki makasi, naba nga té oh
Na simbama na mokeli na nionso, assurance éternelle
Naza na nga moleki mais pour l'instant nanu awa na se
Abengi nga mwinda, nasala nini? Naza kopela, Yesu
Yango ata liboso ya kufa, nabango nini?
Nasimbama na makomi elobi Yesu alonga nde liwa
Naza nanga moleki mais pour l'Instant naza nanu na bomoyi
Abengi mungua, nasala nini? Naza kopesa goût na mokili
Nkolo oyo apesi nga ntina, naza ya ye (naza ya Yesu)
Nakoma propriété privée ya Nzambe mokeli ya nionso (nga, naza ya Yesu)
Bomoyi na nga basimba té, bameki basimbi Nzambe (naza ya Yesu)
Motindami asimbi elaka akufaka té (nga, naza ya Yesu)
Kino oyo Nzambe alobi ekokisama kati na ye (naza ya Yesu)
Le fils de la promesse ne meurt Jamais (nga, naza ya Yesu)
Faute na nga té, elaka'a Nzambe nanu ekokisami té (naza ya Yesu)
Ata na poison elaka ekufaka té (nga, naza ya Yesu)
Elaka'a Nzambe ekoti misisa, epesi nga bomoyi (naza ya Yesu)
Ekokisama ata moto abwakami na moto (nga, naza ya Yesu)
Ce n'est plus moi qui vit, c'est plutôt Jésus qui vit en moi (naza ya Yesu)
Oy'a nga masiyah, eloko ebomaka ye té (nga, naza ya Yesu)
Bisika y'atangi maloba, moto a contredire té (naza ya Yesu)
Faute na nga té, akomisanga oyo y'azali (nga, naza ya Yesu)
Babenga ye mokonzi, apesi nga bokonzi na ye (naza ya Yesu)
Faute na nga té, akomisanga mwinda lokola ye (nga, naza ya Yesu)
Na déranger ténèbres nionso ya mokili ya lelo (naza ya Yesu)
Faute na nga té, akomisanga molongi lokola ye (nga, naza ya Yesu)
Bisika nakomi, parfum de bonne ordeur emati likolo (naza ya Yesu)
Eh, eh, naza ya Yesu eh (nga, naza ya Yesu)
Eh, eh, naza ya Yesu eh (naza ya Yesu)
Naza ya Yesu oyo atia bilembo na ye epa na ngai
Mpo'ete na zala elembo ya bonkumu (nga, naza ya Yesu)
Nzamb'oyo akokisaka yambo ete aloba
Oyo akendeke elongo na baye atinda (naza ya Yesu)

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители