Kishore Kumar Hits

Groupe Adorons l’Eternel G.A.E.L - Nzambe Na Bomoii текст песни

Исполнитель: Groupe Adorons l’Eternel G.A.E.L

альбом: Amour éternel


Yo likonzi esimba bomoi na nga (likonzi esimba bomoi na nga)
Na bolembu zala makasi na nga (Yo likonzi ya bomoi na ngai)
Yo likonzi esimba bomoi na nga (na bolembu ya bomoto na nga)
Na bolembu zala makasi na nga (Oh likonzi na nga Yahweh)
Yo likonzi esimba bomoi na nga (na bolembu ya bolenge na nga eh)
Na bolembu zala makasi na nga (oooh likonzi na nga Yahweh)
Yo likonzi esimba bomoi na nga (na kokweya na nga nionso eh)
Na bolembu zala makasi na nga
Alléluia Nzambe na bomoi
Mitéma esi etondi na posa na Yo, moyengebene
To pusani, to belemi lokola ba sikoli (Nzambe na bomoi)
Toye lokola ba biangami, toye lokola bana (Ya ngai motéma ekoma ya Yo)
Toye lokola ba sali, toye mpe lokola baninga, Nkolo (Molingami na nga)
(Oyo ya tango nionso) Ebombameli ya basantu, Nkolo na nkémbo
(Na mikabi nayo, moninga malamu) Yoka lolako ete mitéma
Ya baye ozwa na mokili, otia pembeni pona lokumu na Yo, Nkolo, Yo ndé Nzambe
(Opesaka bomoyi) Opesaka bomoyi, Nkolo
(Na baye banso baye epa nayo) Ozongisaka elikya, Nkolo na nkémbo
(Nzambe Yo bolingo Nzambe na nga) Yango toye epa na Yo, yamba mitéma mpe ndima losambo
(Nayebi Yo, Nkolo) Ndima masanjoli, mokonzi, alléluia
Nzambe na bomoi
Ya ngai motéma ekoma ya Yo
Molingami na nga
Oyo ya tango nionso
Namikabi na Yo, moninga malamu
Opesaka bomoi
Na baye banso baya epayi na Yo
Nzambe Yo bolingo, Nzambe na nga
Nayebi Yo, Nkolo
Nkolo na bomoi
Yo ndé elikya na nga
Bomoi na nga esimbami na Yo, Nkolo
Yo ndé molingami na ngai na talelaka sé Yo
Na bomoyi na ngai nako banga eloko té, Nkolo
Motéma mwa nga
Mpe mabanzo ma nga
Na bonzeli yango
Sala nango elingi Yo
Nzambe na bomoi
Ya ngai motéma ekoma ya Yo
Molingami na nga
Oyo ya tango nionso
Namikabi na Yo, moninga malamu
Opesaka bomoi
Na baye banso baya epayi na Yo
Nzambe Yo bolingo, Nzambe na nga
Nayebi Yo, Nkolo
Nzambe na bomoi
Ya ngai motéma ekoma ya Yo
Molingami na nga
Oyo ya tango nionso
Namikabi na Yo, moninga malamu
Opesaka bomoi
Na baye banso baya epayi na Yo
Nzambe Yo bolingo, Nzambe na nga
Nayebi Yo, Nkolo
Nkolo Yo ndé mosantu, yamba loyembo na nga
Moto na bolembu, Yo ndé makasi na nga
Nguya ba bulami, lisekwa ya ba santu
Mususu lokola Yo, amonani té
Mokonzi ya milimo mya batu
Ya ngai maboko etombwami
Liboso ya kiti ya bokonzi na Yo
Nzambe na bomoi
Ya ngai motéma ekoma ya Yo (molingami na nga)
Molingami na nga
Oyo ya tango nionso
Namikabi na Yo, moninga malamu (opesaka bomoi)
Opesaka bomoi
Na baye banso baya epayi na Yo
Nzambe Yo bolingo, Nzambe na nga
Nayebi Yo, Nkolo
Nzambe na bomoi
Ya ngai motéma ekoma ya Yo (molingami na nga)
Molingami na nga
Oyo ya tango nionso (namikabi na Yo)
Namikabi na Yo, moninga malamu (Y'opesaka bomoi)
Opesaka bomoi (Nkolo)
Na baye banso baya epayi na Yo
Nzambe Yo bolingo, Nzambe na nga
Nayebi Yo, Nkolo
Nayebi Yo (nayebi Yo, Nkolo)
Nkolo na nga na yebi Yo (nayebi Yo, Nkolo)
Bilaka na Yo ekokokisama na bomoi (nayebi Yo)
Nayebi Yo, Nkolo na nga, Nzambe na nga (nayebi Yo, Nkolo)
Oyo olobaki ekokokisama, nayebi, nayebi Yo (nayebi Yo, Nkolo)
Okosaka té, Nkolo na nga (nayebi Yo, Nkolo)
Nayebi Yo, nayebi Yo (nayebi Yo, Nkolo)
Nayebi Yo, elikya na nga (nayebi Yo, Nkolo)
Na'a sé na Yo

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители