Kishore Kumar Hits

Kool Matope - Quinine текст песни

Исполнитель: Kool Matope

альбом: Explosion


Yoka aa
Mokili ya Nzambe ekomi na suka
Oyo akotia tembe azali te
Bilembo nyoso ekokisami ooh
Kala te Yesu Messiya (Muana na Nzambe ee)
Muana na Nzambe akozonga ee
Oo'omibongisa aah
Moklisto lengela tango
Ngonga ekoki eee
Oo'omipetola aa
Ngenga Zala mwinda aa
Moklisto zala mungwa aa
Salela Bolingo lokola Messiya Yesu
Zala moto ya esengo boboto kimia aa
Mpe longwa na molongo ya ba oyo ba koma ba
Quinine ee périmé eeh
Bakomisa bato vie bololo
Quinine ee bololo ooh
Ata quinine bololo mais ebikisaki
Quinine ee périmé eeh
Mais ya bango bololo ya pamba les agents de la mort
Quinine ee bololo ooh
Kokamwa tee mangomba etondii
Mpo tango toza n'ango oh
Molimo na Nzambe ee
Azali likolo ya moto nyonso
Tala Bolingo na Nzambe ee
Babengani baza ebele ee
Ba ponami baza moke eee
Mawa YESU atunaki mokolo akozonga aah
Est-ce qu'akokuta kondima na mokili
Bato mitema mabe ee
Batondi na mangomba mawa ee
Ba ministères bazua ko tongaka bato
Na masolo ya lokuta aa
Ba faux témoin ba accusateurs
Ya Bana Nzambe ee
Bazo sala mosala satana aa papa na bango
Baza baaa
Quinine ee périmé eeh
Bomoyi ya Bana Nzambe ekomi bololo
Pona likunia kindoki mitema mabe ee
Bazanga mawa compassion ya Yesu Klistu
Basalaka eloko te na lingomba aa
Kasi bango bato yango ko critique de
Koyima koyima ko lobaloba pona ko bebisa aa
Sango ya malamu ya YESU bo remplaçant na mayele na bino oooooooh
Vie na lingomba ekomi craquat mpe
Vie ya mwana Nzambe ekomi bololo ooh
Qui accusera les élus de Dieu?
Qui t'as établis? jugent les serviteurs du Dieu vivant?
Na alliance ya nga na YESU nga
Soki okoti okokufa soni ee
Kala te Yesu Messiya aah
Mwana Nzambe akozonga ee
Eko yebana bana na YESU na ya satana
Mpo toko kabwana aaa basusu
Na Lola basusu direction lifelo
Quinine ee périmé eeh
Les persécuteurs sera persécuté
Kasi yo mwana na Nzambe
Kolemba kosala malamu te ee
Na kombo na Yesu combat le bon combat
Les souffrances du temps présent
Ne sauraient d'être comparé
À la Gloire de Jésus qui arrive bientôt
Maranatha ah
Et ta vraie nature apparaîtra mon ami
Bondela bondela zua mpe tango Yako kimia
Yika mpiko telema ngwi
Moklisto lengela tango ngonga ekoki eee
Molingami Zala na yo oh
Vitamine e santu
Seko seko tikala lipamboli
Vitamine ya Yes
Zala Bolingo lokola Papa na yo
Vitamine e santu
Yina mpe boya masumu
Vitamine ya Yesu
Tambola nako banga Nzambe oooh
Vitamine e santu
Baloba mabe nayo mais bakuta yo nango te
Vitamine ya Yesu
Limbisa mpe pambola na nguna na yo
Vitamine e santu

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители