Kishore Kumar Hits

Marie Misamu - Reconnaissance - Live текст песни

Исполнитель: Marie Misamu

альбом: Live a apocalypse 22


Boseka ngai te po naza na bibiliya na maboko esika nioso na kokende kombo ya Nzambe na monoko na nga oyo
Basali ya Nzambe oyo baza koteya biso tango nioso boyebi te nini oyo Nzambe asalela bango po basalelaka ye
Okomona nga tango nioso na nzela kaka ya eclesia oyebi te nini oyo Nzambe asalela nga po na kendaka eclesia hee
Ahh moto kutu oyo ya mokili soki apesi yo eloko osengi merci eh ebongo Nkolo ya pema to pesi Ye nini
Okomona nga tango nioso naza kokombola eclesia oyebi te nini oyo Nzambe asalela nga pona salelaka ye ye ye
Ahh nga oyo nazali reconnaissante ehhh makambo asalela nga ya minene papa oyo ho na wuti na libulu ya masumu abimisi nga ho esika na zalaki ya liwa eh abimisi nga oyo mikolo na nga ya ko vivre ekomaki nde ya kotanga pongi na nga na butu kaka ba ndoto ya mabe nani akopesa nga loboko moto na moto na oyo ya ye nakanisaki libota na nga ekosunga nga epesi nga nde mokongo nasimbaki moto na kolela ngai pasi elekelaki nga ho Nzambe oyo
Ahh nga oyo nazali reconnaissante na Nzambe oyo makambo asalela nga ya minene papa oyo ho na wuti na libulu ya masumu abimisi nga ho esika na zalaki ya liwa eh abimisi nga oyo mikolo na nga ya ko vivre ekomaki nde ya kotanga pongi na nga na butu kaka ba ndoto ya mabe nani akopesa nga loboko moto na moto na oyo ya ye nakanisaki libota na nga ekosunga nga epesaki nga mokongo na simbaki moto na kolela pasi elekelaki nga yo Nzambe oyo
Ahh nga oyo bomoni tina ngai na lingaka ye na lapa ndayi na vie na nga ho nakosalela ye abeta ekuke ya motema na nga fongoli akoti ye wana camarade ya motema na nga ye ye ye ye Nzambe oyo
Moto na moto na ngonga na ye
Abetali ekuke ya motema na nga na fongoli akoti ye wana camarade na nga yo ye wana thermomètre ya temperature na nga oyo
Ye wana mayi na nga ya komela ekitisaka nga motema
Ye wana bileyi na nga ya koliya na tango ya nzala eh
Ye wana mentaux na nga yo na tango ya malili
Ye wana makasi na nga ye tango na lembaka yee papa oyo eh
Ye wana réanimation ya pema Misamu ye ye ye Nzambe oyo
Ye wana parapluie na nga ye na tango ya mbula
Ye wana kisi na nga ya komela na tango ya maladi
Ye wana asilisa pasi na nga yo papa oyo
Ye wana alongola soni na nga ye papa oyo he Nzambe oyo
Ye wana parapluie ya Christian Likasi hee
Ahh nga oyo bomoni tina nga na yembelaka ye na lapa ndayi na vie na nga yo na kosalela ye ho
Abeta ekuke ya motema na nga na fongoli akoti
Ye wana camarade ya motema na nga yo yo yo yo papa oyo
Moto na moto na ngonga na ye
Abetaki ekuke ya motema na nga na fongili akoti
Ye wana camarade na nga ye yeeeeee
Ye wana moninga na nga ya motema yeee
Ye wana makasi na nga ye yeeee
Ye wana mayi na nga ya komela
Ye wana vie na nga mobimba
THE END
By BERENICE KIDIWA

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители