Kishore Kumar Hits

Marie Misamu - Eh Yawhe текст песни

Исполнитель: Marie Misamu

альбом: Mystere du voile


Eh yawhe
Eh yawhe kumama
Eh yawhe ohh
Eh yawhe kumama nayo
Eh yawhe eh yawhe na ngai yo kumama
Eh yawhe ohh papa na bana
Yo kumama
Na tali na bibiliya ngai na moni Anna eh
Oyo azalaki ékomba masiya
Opési ye Samuel ehhh na nguya nayo
Yo nde nkolo ya bana eh
Opésaka mabota ehh
Pésa na ba oyo bazangi
Po bakumisa yo ehh
Les 4 êtres vivants ba vandi na kiti na yo nzambe
Bazali ko tatola yo mosantu, yawhe kumama na yo
Eh yesu, makambo oyo osalélaka biso
Mitéma oyo otutisaka biso nzambe
Vraiment na tali na likolo, na tali na sé moko té akokani na yo papa
Na liziba ya Bethesda obikisa malade ii
Papa nani akokani na yo, y'oleki nguya eh
Yo mobikisi ya babeli eh
Ba bengi Jehova Rapha ehh
Loboko na yo mokusé té olobi nini papa eh
Na tangi na bible
Mwasi okotanga makila
Asimbaki élamba na yesu azua ki lobiko kumama.
Eh yawhe (×5)
Papa aàh olobi nini
Na kima wapi
Na batama wapi shilo
Na komi lokola jonas ehh na libumu ya mbisi
Destination inconnue
Bilamba ya Congo ekomi biteni na biteni eh
Misuni ya ba Congolais ekomi bipayi na bipayi olobi nini.
Oh molingami kati na nkolo
Soki omoni pasi ebelemi na porte
Kamata trompette na yo betela nkolo
Yango nde libondeli akoyoka yo
Kumama ehhh yesu
Kumama papa
Na koma pe koseka nga oyo
Ba sombelaki nga lopango na lilita
Na kufa lelo lobi mosika eh
Soki makambo ekomeli yo ndeko
Fukama buaka misolo likolo, ganga o secours eh yesu oyo
Ngai na lingi na yebisa yo nde makambo, na yebi te ndenge nini ya kobanda
Yo moko kamata ba phrases na nga oh, classer yango ndenge olingi eh
Oza na suki ya pembe, ba bengi sagesse eh
Kumama eh yesu oyo papa eh
Olati robe ya pembe, ba bengi saintété yesu eh
Kumama eh yesu oyo papa eh
Olati ceinture na loketo, ba bengi verité nzambe oyo
Tika nga pe na lobaka kaka verité
Eh na makolo na yo mapapa eh, ba bengi saine evangile
Tika nga na teya liloba na yo
Kumama papa eh kumama
Mongongo no eleki kutu ya ba kake oh, ba bengi yango authorité
Kumama eh yesu oyo papa eh
Yo nde mobikisi ya ba malades ba lembana, kolo na bana eh
Kumama eh yesu oyo papa eh
Papa ngai na lingi na yebisa yo nde makambo
Na yebi te ndenge nini ya ko banda
Kumama eh yesu oyo papa eh kumama
Miso na yo ebimisaka ba moto, ba bengi yango nde lumière eh
Yo nde motambwisi ya bana eh
Na bengaka yo Monsieur raison eh, ozalaka Monsieur raison na ngai
Kumama eh yesu oyo papa eh kumama
Ngai na tali likolo na tali mabele ba nuama na zamba ba mbisi na mayi oyo
Na bangi monene na yo
Nzambe esika mayele na nga esuki eh, ya yo nde ebandi eh
Kumama eh yesu oyo papa eh kumama
Bo moni libondeli na nga ya chambre, lelo na yembi na loyembo eh
Sekele na nga ebimi eh
Kumama eh yesu oyo Jesus Jesus Jesus
Ah papa ya bana eh
Papa ya libota ebele, papa ya libota monene eh yesu oyo
Na zanga papa eh, na zanga maman eh, yo nde okoma nioso na nga oh
Soki maladie ekangi yo na suka, kamata trompette na yo eh
Trompette yango nde liloba na nzambe
Lobela nga na litoyi ya droite, oyo muasi na mobali na ye
Yo nde kolo ya libala eh
Soki mosala ezangi yo ndeko, soki kimia ezangi yo ndeko
Kamata trompette betela nzambe, yango nde libondeli eh
Soki ko bota eza ko tungisa yo, soki pe kimia ezangi eh
Kamata trompette betela nzambe, ye nde nzete ya mbila eh
Papa eh yawhe
Yo nde kimia ya mitema na biso, yo nde mayi na biso ya komela
Mayi ya ko mela ya vie na nga eh
Yo nde mayi na nga oh, yo nde kimia na nga
Papa eh yawhe
Sembola loboko, sembola loboko ba nguna ba kamua eh
Papa soki bato batuni ngai, ba lobi na ngai na loba kaka phrase moko ezala mokuse mais ezala efficace
Na koyebisa yo osala oyo yo olingi
Po yo nde kolo na tango
Mema nga esika olingi ...

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители