Kishore Kumar Hits

Denis Ngonde - Akolobela Nga текст песни

Исполнитель: Denis Ngonde

альбом: Ngolu


Ofuta niongo na ngayi
Mikumba na nga yango ndé emema yo na ekulusu, Yesu
Na molili, na mikakatano na ngayi
Suka-suka tongo na nkembo eko bima kaka
Ah, té nako bungisa elikya té
Ofuta niongo na ngayi
Osilisa ba mpasi na ngayi
Tina nini na niokuama, osi oniokuama po na ngayi
Nakomi na suka, makasi esili ngayi
Pesa nga loboko na yo
Salela ngayi ngolu na yo
Ngolu na yo ndé ebatelaka ngayi
Makila na yo ndé ezipaka ngayi
Loboko na yo ndé etelemisaka ngayi, papa simba ngayi
Eli, Eli, lama sabachthani ko tika ngayi té
Mosikoli na ngayi lisungi na nga eko wuta na yo
Kuna na ekulusu, Yesu
Nionso ekoki pona ngayi
Nazwa elonga salela ngayi ngolu na yo
Nani oyo olakaki yé mpé okokisaki té?
Nani oyo otambuisaki yé mpé akomaki té?
Nani oyo amekaki ngolu na yo mpé awumelaki na soni?
Mopangusi ya pinzoli na bana na bato
Aba papa okokisaka nionso
Mokano nayo, ekokisama pona ngayi
Longola soni na ngayi, kawusa ba mpota na ngayi
Bongola likambo na ngayi, salela biso ngolu na yo oooh
Mayi ya miso na ngayi ekomi litsio pona bato
Nzela ozali ko lekisa ngayi, naai ako sosola?
Oyo ngayi nazali komona lelo, lobi nako mona yango té
Mawa pé pasi na nga eko bongwana esengo
Natali pembeni na nga, bato mabé ba kofuluka
Ngayi nazali ya yo, likambo na nga ewumeli
Tala ba koseka ngayi, balobi y'otiki ngayi
Motema ebateli kimia, nani ayebi ya ngayi na yo?
Suka na nga ndé ebandeli na yo
Posa ya motema na nga ezali eté na bika na sé na makolo na yo
Pé na bombama na sé ya mapapu ya ngolu na yo, Nkolo
Nani azalaka tangu ozwaki mokano ya kovandisa nga na sé ya ngolu na yo?
Nani oyo ako belema, koloba eté yé apesaka yo toli?
Pé nani oyo ako telemela yo pé awumela seko ya mokili oyo
Nani ako tia tembé na yo, pé azala seko na bomoyi na sé na mokili oyo
Ozali Nzambé ya somo, ozali Nzambé na nguya nionso
Olakaki nga pé olobaki na nga eté oko tika nga té
Kotika ngayi té, kotika ngayi té
Kotika ngayi té eh-eh, kotika ngayi té
Kotika ngayi té, kotika ngayi té (papa simba ngayi)
Kotika ngayi té eh-eh, kotika ngayi té (papa simba ngayi, papa simba ngayi)
Kotika ngayi té, kotika ngayi té
Kotika ngayi té eh-eh, kotika ngayi
Olakaki ngayi papa eté oko batela ngayi
Olakaki nga papa eté tango nionso oko pangusa pinzoli na ngayi
Papa simba ngayi, papa simba ngayi kotika ngayi té
Papa simba ngayi
Nkolo na nga azali moto té po akosa
Nkolo na nga azali muana na moto té po té ayangana liloba nayé
Bilaka na yé eko wumela seko pé ekokisamaka kaka
Kotika ngayi té (kotika nga yi té)
Ozali Nzambé (kotika ngayi té)
Ozali Nzambé, ozali Nzambé (kotika ngayi té, eeeh eh)
Alléluia (kotika ngayi té)
Papa olakaki nga, olakaki nga (kotika ngayi té)
Olakaki ngayi (kotika ngayi té)
Olakaki ngayi (kotika ngayi té, eeeh eh, kotika ngayi té)
Olakaki ngayi (kotika ngayi té, kotika ngayi té)
Yo ndé Nkolo na ngayi, ngomba oyo na telelaka tango nionso (kotika ngayi té, eeeh eh, kotika ngayi té)
Oza Nzambé, tango y'oponaka
Tango yo obiangaka pé tango y'otindaka
Nani akoloba eté apesaki yo toli
Ozali Nzambé lokolo na nionso

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Yaya

2020 · альбом

Похожие исполнители