Kishore Kumar Hits

Denis Ngonde - Nzambe Batela текст песни

Исполнитель: Denis Ngonde

альбом: Elikia Na Ngai


Molili eye, pole esili
Na mitiki epayi na Yo
Nkolo osunga
Molili eye, pole esili
Na mitiki epayi na Yo
Nkolo yo osunga (Yo Nzambe)
Nzambe, Nzambe
Batelaka bana na Yo
Soko Yo obateli
Elonga ezali
Nzambe, Nzambe
Batelaka bana na Yo
Soko Yo obateli
Elonga ezali

Satana abelemi
Liboso na nga
Na kombo na Yésu
Nako longa
Satana abelemi
Liboso na nga
Na kombo na Yésu
Nako longa (Yo Nzambe)
Nzambe, Nzambe
Batelaka bana na Yo
Soko Yo obateli
Elonga ezali (Yo Nzambe)
Nzambe, Nzambe
Batelaka bana na Yo
Soko Yo obateli
Elonga ezali
Na netoli miso na ngai na ngomba
Lisungi na ngai ekowuta wapi?
Bobélé epayi na Yo Yahwe
Yo osalaki lola mpe mokili
Yo okobatela ngai na mabe nionso
Okobatela molimo na ngai
Okobatela ko kendé mpe koya na ngai
Lelo mpe libela na libela
Kufa ebelemi na ndako na nga
Sosolisa ngai, Nzambe, mokano na Yo
Kufa ebelemi na ndako na nga
Sosolisa ngai Nzambe, mokano na Yo (Yo Nzambe)
Nzambe, Nzambe
Batelaka bana na Yo
Soko Yo obateli
Elonga ezali (Yo Nzambe)
Nzambe, Nzambe (telema, telema, telema)
Batelaka bana na Yo (oh Nkolo na nga)
Soko Yo obateli
Elonga ezali
Soko Yahweh ako batela mboka té
Bakengeli bako sala mosala ya pamba
Oh-oh-oh-oh, Nzambe
Nzambe, Nzambe
Batelaka bana na Yo
Soko Yo obateli
Elonga ezali (Yo Nzambe)
Nzambe, Nzambe
Batelaka bana na Yo (belema na nga)
Soko Yo obateli
Elonga ezali (Yo Nzambe)
Nzambe, Nzambe
Batelaka bana na Yo (belema, belama na nga)
Soko Yo obateli
Elonga ezali

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Yaya

2020 · альбом

Похожие исполнители