Kishore Kumar Hits

Denis Ngonde - Yo Nde Bomoyi текст песни

Исполнитель: Denis Ngonde

альбом: Kombo Na Yesu


Molimo na nga eko zala na kimia kaka
Epayi nayo Yaweh
Ko bika na ngayi ewuti epayi na yo
Yo ndé nguya na ngayi
Pé ozali ekimelo na ngayi
Nakoki pé ko telengana Yaweh
Nkolo yoka libondeli na ngayi

Ata mpasi eleki
Minioko oooh yango'yo
Ata ba koseka ngayi
Nga nayebi eté
Na ko tika nzela na yo té eeh
Po yo Nkolo ooh na nga
Kamata loboko na ngayi
Tambuisa nga na seko
Yo ndé bomoyi, na ngayi (yo ndé bomoyi)
Yo ndé elikya na ngayi (elikya)
Na fukameli yo Yaweh eeh (uhhmm)
Papa na nga (uhhmm)
Yo ndé bomoyi, na ngayi (yo ndé bomoyi)
Yo ndé elikya na ngayi (elikya)
Na fukameli yo Yaweh eeh (uhhmm)
Papa na ngayi (uhhmm)

Bomoyi na ngayi, ezali Kristo Yesu
Elikya na ngayi kaka yo Yaweh
Po eté, nazali na papa mosusu té
Bobelé yo Nzambé

Butu na moyi
Kati na bomoyi na nga yonso
Wana eko tambola ngayi
Libondeli na ngayi
O mimonisa na ngayi
Kati na bomoyi na nga Yesu
Kamata loboko na ngayi
Tambuisa ngayi na seko
Yo ndé bomoyi, na ngayi (yo ndé bomoyi)
Yo ndé elikya na ngayi (elikya)
Na fukameli yo Yaweh eeh (uhhmm)
Papa na ngayi (uhhmm)
Yo ndé bomoyi, na nga (yo ndé bomoyi)
Yo ndé elikya na nga (elikya)
Na fukameli yo Yaweh eeh (uhhmm)
Papa na ngayi (uhhmm)
Motema na ngayi
Ozali ko mitungisama pona nini?
Po eté Yaweh azali ko tambuisa bomoyi na nga tango nionso na moyi
Pé butu, yé ndé azali ko batela bomoyi na ngayi

Fungola na bomoyi
Na maboko nayo Yesu
Nako talela moto té eeh
Nako talela sé yo oooh
Mawa na moto oyo ooh
Ako talela mosusu
Soki Yaweh Nzambé té
Mosusu nani?
Yo ndé bomoyi, na ngayi (yo ndé bomoyi)
Yo ndé elikya na nga (elikya)
Na fukameli yo Yaweh eeh (uhhmm)
Papa aaah na ngayi (uhhmm)
Yo ndé bomoyi, na ngayi (yo ndé bomoyi)
Yo ndé elikya na ngayi (elikya)
Na fukameli yo Yaweh eeh (uhhmm)
Papa na ngayi (uhhmm)
Nkolo motema na ngayi etutisami pé etungisami
Nayé epayi na yo pamba té
Yo ndé ozali ekimelo na nga
Nayé epayi nayo Nkolo
Opesa nga eyano na mituna na ngayi
Ndeko na ngayi
Tika bomoyi na yo
Pé makambu nioso epayi na yé
Zala na elikya pé epayi na yé
Pé yé ako sala na kati na bomoyi nayo
Ndeko, Yaweh azana eyano na mitungisi na yo
Oooh oh
Yo ooooh ndé bomoyi na ngayi (yo ndé bomoyi)
Yo ndé elikya na ngayi (elikya)
Na fukameli yo Yaweh eeh (uhhmm)
Papa aaah (uhhmm)
Yo ndé bomoyi, na ngayi (yo ndé bomoyi)
Yo ndé elikya na nga (elikya)
Na fukameli yo Yaweh eeeh, eh
Yoka libo-ooooh-ndeli na nga aaaah

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Yaya

2020 · альбом

Похожие исполнители