Kishore Kumar Hits

Thomas Lokofe - Nzela текст песни

Исполнитель: Thomas Lokofe

альбом: Terminus


Loléngé ofandisa nga na bakonzi
Ozala mpé tapis rouge na nzelá na ngáí Yahweh
Ah ah
Mobembo nazo sala awa nase na moyi
Simba nga loboko na tambolá nayo elongo
Po nzela yango nazo tambolá etóndí banzube, nakoka té soki to tamboli nayo té
Yésu eh

Na nzela Emmause bayekoli mibalé batambelaki na Yésu, balíaka na ye lipa
Losámbo na nga Nkóló
Tambolá na nga elongo na lía limpa ya bomoyi yangó ndé lilomba na yo oh-oh-oh

Tata Noa atambola nayo elongo
Abikaki na libóta nayé na mvula munene
Losámbo na nga ngáí mibale ya Mifie, okanisa nga na libóta na nga mombimba eh-eh-eh
Yésu eh lala
Ana mpé butu moyi na nzelá ya tempelo
Atambolaki na Nzámbe azuaki Samuel eh
Babéngaki yo ekomba mpó atambolaki yo moko
Associé Yésu na nzelá na yo mpó bangúná ba changer language
Yésu eh-eh-eh
Muana Nzámbe amoná pási pona nga

Nkóló eh nga natingami nayo
Yaya eh nga nakolembe té
Na nzelá na nga yo ndé associé eh
Simba nga totambola elongo
Nakoka té ngáí mókó
Nkóló eh nga natingami nayo
Yaya eh nga nakolemba té
Na nzelá na nga yo ndé associé eh
Simba nga totambole elongo
Nakoka té ngáí mókó
Na butu likonzí ya moto, na moyi lipata eh (batambolaki na Nzámbe eh)
Balíaki manne na désert, bamelaki mayi eh (mpó bazalákí na Nzámbe eh)
Nzelá na Yésu nzelá na bisengo
Natambolaki na yo pô été yo mpolé
Lakisá nga nzelá nga nako kendé
Nzelá na Yésu nzelá na esengo ah-ah-ah
Nakoka té (Nkóló eh nga natingami nayo)
Ko tambolá nga mókó yaya (yaya eh nga nakolemba té)
Yaya eh (na nzelá na nga yo ndé associé eh)
Ah-ah (Simba nga totambole elongo)
Mpó été (nakoka té nga mókó)
Simba nga Yahweh na nga (Nkóló eh nga natingami nayo)
Eh-eh nga natingami nayo (yaya eh nga nakolemba té)
Nakolembe té nzelá na yo (na nzelá na nga yo ndé associé eh)
Ata bangúná bayé ba kolongo té (simba nga totambole elongo)
Yahweh eh-eh (nakoka té nga mókó)
Ata misúsu na ngáí eza komona té
Mais soki nzelá nga naza eza yayo na kokoma
Tii na suka eh
Namona elongi nayo wâná nakomi assuré que oza ngáí
Na butu likonzí na moto, na moyi lipata eh (batambolaki na Nzámbe eh)
Balíaki manne na désert, bamelaki mayi eh (mpó bazalákí na Nzámbe eh)

Ceux qui ont marché avec toi
Avec fidélité ont finis par voir ta Gloire Seigneur
C'est pourquoi je salue l'homme qui a le bâton du commandement
Pour conduire l'église Merac
Le pasteur Yoann Jacques
God bless you my pastor

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Ami

2022 · альбом

Похожие исполнители