Kishore Kumar Hits

Thomas Lokofe - Moto Nzambe текст песни

Исполнитель: Thomas Lokofe

альбом: Terminus


Eza mokolo okelaki ngai te nde nakoma Nzambe
Kasi nazala Nzambe uta na eternité
Ngai naza mutu ya Nzambe

Nalingaki kokufa pamba lokola ka moto
Nzoka eteni mosusu naza nzambe oh
Ngai nalingaki kowa lokola ka moto
Nzoka eteni mosusu naza nzambe oh
Ignorance nzoka ebomaki, ezipaki ngaï miso nayebaki té oh
Po kozanga koyeba libota na Nzambe tozo kufa pamba
Nayebaki te nini vraiment nga nazalaki oh
Oh yo yo yo nga naza moto naza pe nzambe oh
Naza moto naza pe nzambe oh
Eh-h-h-h-h-h
Alalaki na bwato lokola moto
Kasi alamuka aloba na mbonge
Alobi na mopepe lokola nde Nzambe oh
Nkolo na nzela ya kotambola ayoki nzala
Kasi aloba na nzete
Alobi na nzete lokola nde Nzambe oh
Ouh-h-h moto alelaka tango makambo eyaka makasi na vie naye oh
Kasi Nzambe, Nzambe alelaka te Nzambe alobaka
Po wuta na éternité posa ya Nzambe eza moto a dominé
Kasi ba dominer ye té oh
Naza moto naza pe nzambe oh
Naza moto naza pe nzambe oh
Eh-h-h-h
Uhm Herve Nzambe
Mokanda na Nzembo elobi
Toza ba Nzambe kasi tozokufa be lokola bato oh
Uhm dans le livre des Psaumes
La bible dit nous sommes des dieux
Cependant nous mourrons comme des humains
Nayebaki te nzoka nazalaka nde na double identité oh
Naza moto eteni mosusu naza nzambe
Na tango ya ba pasi minioko eyaka na bomoyi na biso
Tolela te telema loba lokola Nzambe
Po moto alelaka kasi Nzambe alelaka te
Ah yo yo naza moto naza pe nzambe oh
Naza moto naza pe nzambe oh

Nayebaki na nga te nzoka nga Lokofe
Nazalaka nde Nzambé oh
Ah ignorance eloko mabé
(Nazalaka nde Nzambé oh) Ndambo ya liwa kozanga koyeba
(Nazalaka nde Nzambé oh) Eh Mifi eh nakowa
Nazalaka nde Nzambé oh

Osala nga nini Yesu eh?
O tia nga wapi po nakoma mowumbu ya bolingo na yo?
Nga nalingaka yo eh
Ah yo yo
Naza moto naza pe nzambe oh
Naza moto naza pe nzambe
Eh-h-h-h-h
Nayebaki na nga te nzoka nga Lokofe
Nazalaka nde Nzambé oh
Ah Ignorance eloko mabé
Nazalaka nde Nzambé oh
Ndambo ya liwa kozanga koyeba eh Mifi nakowa
Nazalaka nde Nzambé oh

Ayi y'osala nga nini Yesu eh
Nakoma kokatsua pona yo
Ah nakoma denye pona yo
Ah yo yo nga nalingaka yo eh Jésus eh
Nabika eh ah yo yo
Nabika eh ah yo yo
Eh-h-h-h-h-h
Nabika eh

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Ami

2022 · альбом

Похожие исполнители