Kishore Kumar Hits

Wenge BCBG - Eseau текст песни

Исполнитель: Wenge BCBG

альбом: Anti - Terro


Kumisama Nzambe
Oyo asalaka na mandat té
Oyo azalaka elu na peuple té
Oh mbul'oyo to changer nzambe po apamboli biso té
Po na bible ekomama té que tout est possible
Na moto oyo atanga mingi, to aza riche ou pauvre
Mais la Bible nous dit tout est possible a celui qui croit en Dieu
Okoki kozala no rien moto pamba mais Dieu a elever yo
Boyokaaaa
Jb muana mama agnes lusambo niongo ya nani na defa
Naboya kofuta, bozosala ba campagnes bodestabiliser bin adam
Boko reussir nga mokolo nzambe akolala pongi
Elevation na nga ewuta ni orient to occident
Ewuta na nzambe oyo asala grace na ye na ba humbles na
Bato alingi, tshia muntu tshia muntu tshia nzambi tshia nzambi
(Kotika nga té yahweh)
Eloko bolingo nzambe akela po tolingana
Awa na mokili ekoma po na interet
Gentilesse ya bato ezali sé na presence
Soki opesi mokongo osambue na matongi
Po tozolia ehh bobengi nga ndeko
Po tozomela bobengi nga moninga ehhh
Mokolo ya likambo bilongi ekomaka ya kotanga
Nako se retrouver lokola yezu masiya
Na ngomba ya golgotha mokolo ya liwa na yé
(Tobondela makasi)
Yezu alamwisaka lazare po na nkembo ya nzembo
Lelo nayebi liwa na ngai ezali kembo ya ba nguna
Molimo eyebana ya nzambe nzoto mabele ya pamba
Bo kamata bo sala mposo, bosala na yango mbunda
Bobeta, bobina, bosala feti mitema na bino ekita
Lokola bo ko vivre eternellement
Nasekaka pasi ya moto té ngai jb mpiana
Po nayebi pasi na liwa eza nzela ya moto nionso
Bopanzaka nga nsango nabeli lliboma
Bolingi vie na nga ebeba, nani akosunga bana na nga
Mabe ya moto bomonaka sé na miso, soki azali té bokokanisa
Ye ata na likambo moko niongo ya nani nga na defa
Aloba na futa, bo botika koluka moto ya bomoyi na mboka ba wa
Bokanisaki ngai eh eh binadama naza Ezau bolati mposo ya meme
Po bo distraire public ayokela bino mawa
Aboyi ba benedections na ngai eh jb mpiana
Histoire echangeaka té papa wemba,
Histoire echangeaka té josky kiambukuta
Eh, histoire echangeaka té president nyoch eh
Nzembo na nga ya mulolo ebimisa wenge
Nzembo na nga ya kin e bouger e confirma wenge
Bolinga bolinga té ba temoins na nga bazali public na nzambe
Verite yango wana
Yezu kutu muana nzambe abongola mayi na vino, alamusa batu bakufa,
Batambuisaki ba koka, mokolo bakangaki yé bato batiolaki yé, n
Denge moko na papa cheri pasi na nga nde esengo ya ba nguna
Bokanisaki ngai eh eh binadama naza Ezau bolati mposo ya meme
Po bo distraire public ayokela bino mawa
Aboyi ba benedections na ngai eh jb mpiana
Moto soki azali na mbongo,
Ndaku na ye etondaka tous les jours na ba
Famille b'amis, lun jour soki azangi ndako ekomi desert
Lokola moto oyo ayebanaki ata na moto té
Lobi soki akufi, baninga ba famille ba yé na mituka ya talo batié
Ba cotisaitons ya minene, alors na mbeto ya lopitalo moto té ayaki
Ata na presence ya pamba po eko consoler yé, tolinganaka téééé
Bana congo mobimba, tolingana
Jb mpiana et werrason tolingana, didier masela,
Alain makaba, blaise bula, dominguezi tolingana...

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители