Kishore Kumar Hits

Moise Matuta - Biyano ezali текст песни

Исполнитель: Moise Matuta

альбом: Eben-Ezer


Nkombo na Yo Yesu
Nkombo na Yo Yaya
Nkombo na Yo, ngai nako simba
Nkombo na Yo Yesu
Nkombo na Yo Yaya
Nkombo na Yo, ngai nako simba
Israël atambola na esobé
Azanga eloko te po Nkolo na bango Yesu
Ata molili ezo wumela Papa, soki oye oyaka na pole na Yo.
Nini esalema na sekele Papa, oyo misu na Yo ezangi ko mona?
Nini elobama na nkunku Yaya, oyo matoyi na Yo ezangi koyoka?
Nini elobama na sekele Papa, oyo misu na yo ezangi komona Nzambe ya lola?
Oh Nkombo na Yo Yesu
Nkombo na Yo Yesu
Nkombo na Yo yaya
Nkombo na Yo, ngai nako simba
Ahi Nkombo na Yo
Nkombo na Yo Yesu
Nkombo na Yo yaya
Nkombo na Yo, ngai nako simba
Complot oyo ba nguna ba sali pona nga, misu na Nzambe eza komona eko simba te
Nkombo na Yo, ngai na ko simba
Boluka ko bwaka nga na moto, bazika bango moko na moto, Yo Nzambe moto.
Nkombo na Yo, ngai na ko simba
Na Nkombo na Yo ba zanga, bazuwa
Ba kelela ba koma ba sungi ya mabota
Nkombo na Yo, ngai nako simba
Nini elobama na sekele Papa, oyo matoyi na Yo ezangi ko yoka Nzambe?
(Oh na Nkombo na Yo na ko simba Yahwé)
Nkombo na Yo Yesu
Nkombo na Yo yaya
Nkombo na Yo, ngai nako simba
(Ata molili eyindi, pole eko tana)
Nkombo na Yo Yesu
Nkombo na Yo yaya
Nkombo na Yo, ngai nako simba
Eyano ya mituna na nga na tangu ya pasi
Esengo na ba oyo bayebi Nkombo na Yo
(Bayebi Nkombo ya Adonaï)
Ba kufa soni te ata bitumba eleki
(Ah oko pesa elonga kaka)
Po Yahwé osuki te na oyo misu eza ko mona
(Eh Nzambe na bomoyi)
...biyano te nase na moyi
Bana Yahwé biyano ezali
Esengo na ba oyo bayebi Nkombo na Yo
(Bayebi Nkombo ya Adonaï)
Ba kufa soni te ata bitumba eleki
(Ah oko pesa elonga kaka)
Po Yahwé osuki te na oyo misu eza ko mona
(Eh Nzambe na lola)
...biyano te nase na moyi
Bana Yahwé biyano ezali
(Bana Nzambe biyano ezali)
Bana Yahwé biyano ezali
(Bana ya Nzambe ya lola biyano ezali)
Bana Yahwé biyano ezali
(Biyano ya Nzambe ya bomoyi ekipaka mboka te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Biyano elanga Mephibosheth na Lodebar)
Bana Yahwé biyano ezali
(Emema ye une deux une deux ti na ndaku ya David)
Bana Yahwé biyano ezali
(Biyano ya Nzambe ya bomoyi ekipaka adresse te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Elanda Lazare ti na nkunda, ezongisi ye na ndaku)
Bana Yahwé biyano ezali
(Biyano ya Nzambe ya bomoyi ekipaka taille te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Ekotela Zachée mokonzi, yaya na ndaku)
Bana Yahwé biyano ezali
(Ata obali lelo, osilisi ba samedis na dimanches te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Baya ya Nzambe ya bomoyi mabala esili te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Oyo ba kenda poto, ba buka ba ambassades nionso te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Bana ya Nzambe ya lola, Visa eloko nini?)
Bana Yahwé biyano ezali
(Oyo ba somba mapangu ba silisa ba terrains nionso te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Ba Nzambe ya bomoyi, mapangu esili te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Oyo ba bota ba buka ba maternités nionso te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Bana ya Nzambe ya lola, bana ba sili te)
Esengo na ba oyo bayebi Nkombo na Yo
(Bayebi Nkombo ya Adonaï)
Ba kufa soni te ata bitumba eleki
(Ako tambola mutu na sé te, Nzambe)
Po Yahwé osuki te na oyo misu eza ko mona
...biyano te na sé na moyi
Bana Yahwé biyano ezali
Yesu Nzambe na bomoyi
Betela ye mua mololo bien
Nzambe ya même instant
Nzambe ya lelo lelo
(Nzambe ya lelo lelo lelo lelo)
Nzambe ya même instant
Nzambe ya lelo lelo
(Apesaka rendez-vous na moto te)
Nzambe ya même instant
Nzambe ya lelo lelo
(Oh zonga lobi na ko tala makambu na yo lobi)
Nzambe ya même instant
(Jamais)
Nzambe ya lelo lelo
(Obikisa ba beli Papa na rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Misu ya Bartimée e fungwama na rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Muasi ya litanga makila, ekatana na rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Mokakatani ya Bethesda, atelema na rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Liboma ya Gadara esila na rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Israël bakatisa mayi ya motane na rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Liboso ya David, Goliath akweya pe na rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Lazare kutu abima na nkunda pe na rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
(Ndima kaka ndeko na nga, oko bika na rendez-vous te)
Bana Yahwé biyano ezali
Esengo na ba oyo bayebi Nkombo na Yo
(Bayebi Nkombo ya Adonaï)
Ba kufa soni te ata bitumba eleki
(Ako tambola mutu na sé te, Nzambe)
Po Yahwé osuki te na oyo misu eza ko mona
(Nzambe na bomoyi)
...biyano te na sé na moyi
Bana Yahwé biyano ezali

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители