Kishore Kumar Hits

Moise Matuta - Avocat текст песни

Исполнитель: Moise Matuta

альбом: Relève-toi Un Noveau Depart


Ba futaka avocat mbongo po akotela yo na mbeba oyo osali
Mais oy'a ngayi avocat asengi nga ata lomeya té
Akoteli nga na mbeba, alimbisi ngayi, pé azo lobela ngayi
Oh Yesu merci
Nazo meka koloba oyo y'osali
Po grandeur nayo ezangi ba termes na ba langues ya bato ya mokili
Nasengi molimo santo a sunga nga, aaah

Na bokonzi na yo successeur nani?
Ovanda na kiti na yo ezanga mandat
Epa na retrouver ba compétences ya bo Nzambé, eh-eh
Na moto mosusu té kaka epayi na yo Yesu

Yo ndé o gereaka ba fonctionnement eh, ya bikelamu ozo sala nango ndengé olingi
Jamais butu eya na tongo, eeh
To pé tongo eya na butu, uuh

Na bengi yo mon avocat auprès du père, oh
Napesa mbongo té po okotela ngayi
Soki na pesa opinion na ngayi
Na déclarer "vanda na ngwendé nayo", yaya
Mon infraction est individuelle, oh
Esengaki na mema etumbu ya mbeba na ngayi
Vie na nga ekomaki lokola cimetière ezanga courant
Ngayi Lazalo eh, yo ndé lisekwa na ngayi
Esengaki na mema etumbu ya ba mbeba na ngayi, Yesu
Yesu na ngayi okoteli ngayi na bolingo na yo ya bo Nzambé, eh-eh
Mon avocat auprès du père
Napesa mbongo té po okotela ngayi
Soki ko bandela opinion na ngayi
Na déclarer, vanda na ngwendé na yo (vanda na ngwendé na yo)
Epesameli na bato ko inventer, eh
Kasi ko crée eza domaine ya Nzambé
Po licence ya création y'opesa nga moto té
Voilà pourquoi y'atambola na mayi lokola boulevard
Yo ndé o gereaka ba fonctionnement eh, ya bikelamu nionso na sé na moyi
Jamais mapata ekita na mabelé
To pé mabelé emata na mapata
Mon avocat, eeh
Mon avocat auprès du père
Napesa mbongo té po y'okotela ngayi (Yesu na ngayi, eh)
Soki ko bandela opinion na ngayi (Yesu)
Oyo eza unique, vanda na ngwendé na yo (vanda na ngwendé na yo, eeh-eh)
Mon avocat, eeh (mon avocat auprès du père)
Napesa mbongo té, oh (napesa mbongo té po y'okotela ngayi)
Soki ko bandela (soki ko bandela opinion na ngayi)
Yaya eeh (oyo eza unique vanda na ngwendé na yo)
Vanda na ngwendé na yo, eeh-eh
Mon avocat auprès du père, oh
Napesa mbongo té po okotela ngayi
Molobeli na ngayi epay'a papa
Na futa kaniaka té po okotela ngayi, Yesu
Soki ba sengi nga opinion na ngayi, na déclarer, vanda na ngwendé na yo
Mon infraction est individuelle, oh
Esengaki na mema etumbu ya ba faute na ngayi, Yesu
Vie ekomaki nga lokola cimetière ezanga courant
Aah, eh-eh Yesu, eh
Molobeli na nga epay'a papa
Mon avocat auprès du père, oh
Esengaki na mema etumbu ya ba mbeba na ngayi
Vie ekomaki nga lokola cimetière ezanga courant
Ngayi Lazalo, eh yo ndé lisekwa na ngayi
Yesu na ngayi omemi mabé na ngayi, eh (mon avocat eeh)
Mon avocat auprès du père
Napesa mbongo té po y'okotela ngayi
Soki ko bandela opinion na ngayi
Oyo eza unique, vanda na ngwendé na yo
Mon avocat, eeh
Mon avocat auprès du père (Adonaï, eeh)
Napesa mbongo té po okotela ngayi
Soki ko bandela opinion na ngayi
Oyo eza unique, vanda na ngwendé na yo (vanda na ngwendé nayo Yesu)
Yo ndé o gereaka ba fonctionnement eh, ya bikelamu nionso na sé na moyi
Jamais butu eya na tongo, eh
To pé tongo eya na butu
Les vrais parents qui se sacrifient pour le bien-être de ses enfants
Yesu na ngayi osala yango eh, koleka baboti oyo ba bota ngayi
Mon infraction est individuelle
Esengaki na mema etumbu ya ba faute na ngayi
Mbeba aah, mabé ezalaki ya ngayi, eh
Esengaki na mema etumbu ya ba faute na ngayi
Vie ekomaki nga lokola cimetière ezanga courant
Faute ezalaki ya ngayi, na mema mabé na ngayi Yesu
Ngayi Lazalo, yo ndé lisekwa na ngayi
Oh Yesu na ngayi omemeli nga
Mon avocat, eeh
Mon avocat auprès du père
Napesa mbongo té po okotela ngayi
Soki ko bandela opinion na ngayi
Oyo eza unique, vanda na ngwendé na yo

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители