Kishore Kumar Hits

Gael Music - Lokumu Eza Ya Yo - Live текст песни

Исполнитель: Gael Music

альбом: Sanjola Tournée 2016


Oza Nzambe na bolingo
O bongi na lokumu
Yahweh lokumu eza ya Yo
Yahweh lokumu eza ya Yo
Sala nga na yeba eh
Baposa ya Motema na Yo
Loba nga na yoka eh
Mabanzo ya molimo na Yo
Bongo nga na kokisa Papa eh
Baposa ya Motema na Yo eh
Bongo nga na loba maloba eh
May'e ekosimba Yo
Loba nga na yoka eh
Mabanzo ya molimo na Yo
Simba nga na ningana eh
Na nguya ya loboko na Yo
Bongo na misopa Papa eh
Mabolongo na sé, na sanjola
Na mitika Yahwe, liboso na Yo
Oza Nzambe na bolingo
Oza Nzambe na bolingo
O bongi na lokumu, Yésu eh (o bongi na lokumu)
Yahweh lokumu eza ya Yo (Yahweh lokumu eza ya Yo)
Solo lokumu eza ya Yo (Yahweh lokumu eza ya Yo)

Sala nga na mona eh
Nguya ya loboko na Yo
Mimonisa na kamwa eh
Nkembo ya Bo nzambé na Yo
Bongo nga na tatola Papa eh
Makoki na Yo Mosantu eh
Bongo nga na sanjola yaya eh
Na loléngé olingi-oh
Mimonisa na kamwa eh
Nkembo ya élongi na Yo
Simba nga na lenga eh
Na nguya ya loboko na Yo
Bongo nga na loba maloba eh
Na maye o' na moni na Yo
Bongo nga na sanjola yaya eh
Monéné na Yo
Oza Nzambé na bolingo
Oza Nzambé na bolingo
O bongi na lokumu, Yesu eh (o bongi na lokumu)
Ah, Yahweh lokumu eza ya Yo (Yahweh lokumu eza ya Yo)
Mokonzi lokumu yango ya Yo (Yahweh lokumu eza ya Yo)
Sala nga na tatola eh
Nguya ya loboko na Yo
Kokisa na yemba eh
Bilaka e koma loyembo oh
Ndéngé Yo osalaka Papa eh
Yango ndé ekoma mabina
Bongo nga na tatola Papa eh
Na mabota nionso
Oza Nzambé na bolingo
Oza Nzambé na bolingo
O bongi na lokumu (o bongi na lokumu)
Ah Yahweh lokumu eza ya Yo eh (Yahweh lokumu eza ya Yo)
Lokumu, e bongi nde na Yo eh (Yahweh lokumu eza ya Yo)
Ebandeli pé suka na nionso, lokumu eza ya Yo eh (Eh Yahweh, Yahweh lokumu eza yayo)
Molobeli pé mokokisi, Papa lokumu eza ya Yo (Yahweh lokumu eza ya Yo)
Ba honneurs, b'acclamations e bongi na yo Papa (eh Yahweh, Yahweh lokumu eza ya Yo)
Malasi ya kitoko pé ya valeur, na sopi yango na makolo na Yo (Yahweh lokumu eza ya Yo)
Motolé ya nkembo, elamba ya lokumu ebongi na yo mokéli na nionso eh (eh Yahweh, Yahweh lokumu eza ya Yo)
Yahweh Lokumu eza ya Yo (Yahweh Lokumu eza ya Yo)
Yahweh Lokumu eza ya Yo (eh Yahweh, Yahweh Lokumu eza ya Yo)
Lokumu eza ya Yo
Lokumu eza ya Yo
Lokumu eza ya Yo
Lokumu sé ya Yo
Ebongi na moto té oh
Lokumu eza ya Yo
Solo na batu ya mokili té oh
Lokumu eza ya Yo
Eh Yahweh, yaya
Eh Yahweh
Kasi soki lukumu eza ya Yé, binela yé mwa muké, on y va
Soki mutu a kalé yo loba n'e "tikela nga espace, tikela nga espace na bina, tikela nga espace"

Alléluia

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители