Kishore Kumar Hits

Athoms et Nadège - Yamba Lokumu текст песни

Исполнитель: Athoms et Nadège

альбом: Le Culte


Mosántu, mosántu, mosántu eh
Yamba lokúmu ya bayengebene ba pesi nayo
Mosántu, mosántu, mosántu eh
Yamba lokúmu ya bayengebene ba pesi nayo
Mosántu, mosántu, mosántu eh
Yamba lokúmu ya bayengebene ba pesi nayo
Mosántu, mosántu, mosántu eh
Yamba lokúmu ya bayengebene ba pesi nayo
Bolingo n'o bisik'ezua nga
Motéma na nga mókó témoin
Ósála nionso pô nga nakomá
Mosántu lokóla y'ozali
Ótála mabunga na ngáí té
Olatisinga elambá ya bosantú lokóla yo
Bôngó na béngáma pé mosántu loléngé mókó na yo
Yangó na yemba mosántu eh
Mosántu, mosántu, mosántu eh
Yamba lokúmu ya bayengebene ba pesi nayo
Mosántu, mosántu, mosántu eh
Yamba lokúmu ya bayengebene ba pesi nayo
Ósála nionso pô nga na kóma
Mosántu lokóla y'ozali pápa otangelanga mabunga té
Ojugea nga selon grâce na yo, papa na nga
Opesi nga loboko naya bisíká bosántu oyo y'ezalí
Na sangana na loyémbo óyo eyembí banjelu
Nga pé na ganga mosántu eh
Mosántu, mosántu, mosántu eh
Yamba lokúmu ya bayengebene ba pesi nayo
Mosántu, mosántu, mosántu eh
Yamba lokúmu ya bayengebene ba pesi nayo
Bolingo na yo elékí makási
Yangó na fongoli yanga motéma
Na yamba loyembo'ango
Nga pé na yemba loyémbo mókó na rythme ya b'anjelu
Réfrain óyo esilaka té, ya sékô na sékô
Nga pé na ganga mosántu eh
Mosántu, mosántu, mosántu eh
Yamba lokúmu ya bayengebene ba pesi nayo
Mosántu, mosántu, mosántu eh
Yamba lokúmu ya bayengebene ba pesi nayo
Mokóló óyo ayákí na mosuni
Abótámí na mwasi, áwa banjelu bayaki
Ba sangani elongo na bato, babateli mpaté
Ba pesi bangó esengo óyo ewuta na likoló
Refrain ya loyembo oyo toko yemba kino seko
Mosántu, mosántu ndengé mokonzi na bísó azalí
Oh-oh, to ganga mosántu eh
Mosántu, mosántu, mosántu, eh
Yamba lokúmu ya bayengebene ba pesi nayo
Mosántu, mosántu, mosántu eh
Yamba lokúmu ya bayengebene ba pesi nayo
Sántu eh, mosántu eh
Sántu eh, mosántu eh
Sántu eh, mosántu eh
Sántu eh, mosántu eh
Hosanna na Nkolo, mosali na nionso eh (santu eh, mosántu eh)
Banjelu na bato ba sangani bayemba eh (santu eh, mosántu eh)
Mosantu eh, abongwani té, papa eh (santu eh, mosántu eh)
Mosantu eh, abongwani té, yaya eh (santu eh, mosántu eh)
Ké-lé-lé-lé-lé milolo ebéta likoló pé na sé (santu eh, mosántu eh)
B'anjelu ba ko yemba, mosantu eh, papa (santu eh, mosántu eh)
Bísó pé na sé, mosántu eh, papá (santu eh, mosántu eh)
Nkémbo, lokúmu yaya eh (nkémbo, lokúmu)
Ba mpaká ba yembi epa na yo
Nkémbo, lokúmu yaya eh (nkémbo, lokúmu, masanjoli tópesa na yo, eh)
Santu eh, mosántu eh
Mpaté na Nzambe (santu eh, mosantu eh)
Ondimama po oza mosántu eh (santu eh, mosántu eh)
L'agneau sans tâche (santu eh, mosántu eh)
Okokisa nionso po motéma ya papa (santu eh, mosántu eh)
Esepela na biso eh (santu eh, mosantu eh)
Biso batu'a masumu (santu eh, mosántu eh)
Tokomi ba santu po na yo (santu eh, mosantu eh)
Likoló ba yemba, mabélé ba tatola (santu eh, mosántu eh)
Ozali mosantu eh (sántu eh, mosántu eh)
B'anjelu bako yemba mosántu eh, papa (santu eh, mosántu eh)
Ba mpaka bako yemba mosántu eh, papa (sántu eh, mosántu eh)
Bakeli pé ba yemba mosántu eh, papa (sántu eh, mosántu eh)
Ozua nkémbo, lokúmu na masanjoli oyamba yango eh
Nkémbo, lokúmu, masanjoli
Tópesa na yo, eh

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители