Kishore Kumar Hits

Athoms et Nadège - Ngwende текст песни

Исполнитель: Athoms et Nadège

альбом: Le Culte


Fanda na ngwendé na yo po na séko
Wumela mosantu, bongo biso to sopa masanjoli
Na makolo na oy'a yo
Yo Nzambé oyo owumelaka po na séko

Yay'ofandi na kiti ya bokonzi na yo eeeh, yaya eeh
Yay'ofandi na kiti ya bokonzi na yo eeeh, yaya eeh eeeh

Yay'ofanda po'été opema te oh
Yay'ofandi po'été opema te oh
Kasi ofandi po'été okokisa nionso
Après avoir tout accompli sur la terre
Ozui kombo koleka bakombo nionso
Ba pesi yo ngwendé koleka ba ngwendé nionso
Ofanda na ngwendé etongama na maboko ya mutu té
Menuiser ya ngwendé na yo, ndé nani ooh
Na botama na kuta yo (Nzambé na sé na moyi)
Na koleka, okotikala (Nzambé na sé na moyi)
Abraham aleka, kasi oza (Nzambé na sé na moyi)
Lelo naza na esengo yako netola ngwendé na yo eeeh
Oh yaya eh-eeh-eeeh, ooh yaya eeeh
Yay'ofandi na kiti ya bokonzi na yo eeh (na yo eh yaya), yaya eeeh
Bokonzi na yo eeeh (yay'ofandi na kiti ya bokonzi na yo eeh, yaya eeeh)
Ya nga motema nasopi liboso ya Roi des rois, (yay'ofandi na kiti ya bokonzi na yo eeh, yaya eeeh)
Nzoka ndé mokonzi azalaka yaya na nga (yay'ofandi na kiti ya bokonzi na yo eeh, yaya eeeh)
Nga ndé leki na yé ooh, ofanda seko na seko, oh yaya

Ngwendé na yo ba bundisaka ngo té oh
Ngwendé na yo etatabanaka té
Ngwendé na yo ebanga rébellion té
Ngwendé na yo eninganaka té
Te savoir sur le trône me rassure Seigneur
Surtout na yebi ofanda kaka po oyamba masanjoli na nga té
Kasi ofanda pé po okata makambo na nga Nkolo
Mingi mingi na yebi ozalaka na camp ya ba santu
Yango soki mokili ekozala na besoin ya avis na nga
Je suggère que le trône soit occupé, par Jésus
Par Jésus eeeh, Jésus oooh, oooh yaya eeeh
Yay'ofandi na kiti ya bokonzi na yo eeh, yaya eeeh (ooh yaya eeh)
Ofandi lelo té, ofanda wuta eternité mosantu nanga (yay'ofandi na kiti ya bokonzi na yo eeh, yaya eeeh)
Tu n'as pas de mandat, tu es roi à jamais (yay'ofandi na kiti ya bokonzi na yo eeh, yaya eeeh)
Vanda, wumela na kiti ya mokonzi mosantu eeeh (yay'ofandi na kiti ya bokonzi na yo eeh, yaya eeeh)

Mokonzi soki afandi na ngwendé
Ako zela masanjoli emata, e buta na yé oh
Mokonzi na nga abongi, abongi na lukumu eeh
Lelo na sanjola yé, fanda na yo, bongo na fukama papa
Na kita na makolo na yo, kino na sopa malasi
Ata na mpinjoli, mpinjoli ya miso na nga
Ya mawa té ooh
Yo lolango na yo, yaya eeeh
Yay'ofandi na kiti ya bokonzi na yo eeh (oh yaya eeeh, yaya), yaya eeeh
Yay'ofandi na kiti ya bokonzi na yo eeh, yaya eeeh
Hmm yaya nga afandi po akonza oh, po atinda oh, po akokisa eeeh
Yaya na nga afandi ooh, (yay'ofandi na kiti) na kiti (ya bokonzi na yo eeh)
Azo konza nionso eeeh (yaya eeeh)

Yaya eeeh, yaya
Oh yaya eh (yaya eeeh, yaya)
Yaya nga na zala leki, yo ndé yaya na nga oh (yaya eeeh, yaya)
To zala libota moko, oh yaya (yaya eeeh, yaya)
Bisika oza mokonzi, nga pé nazala mokonzi lokola yo (yaya eeeh, yaya)
Oh yaya na nga, yaya (yaya eeeh, yaya)
Makambo nga na koka té, yo ndé okoka oh yaya (yaya eeeh, yaya)
Ooh yaya na nga Yesu eh (yaya eeeh, yaya)
Bisika molayi na nga esuki, o matisanga na mapeka (yaya eeeh, yaya)
Makambo na koma té, loboko na yo eza molayi
Ekoma na bisika na nga oh (yaya eeeh, yaya)
Naza leki ya Nkosi eh (yaya eeeh, yaya)
Oh naza leki ya mokonzi eeh (yaya eeeh, yaya)
Yesu aza yaya na nga (yaya eeeh, yaya)

Eza malamu kozala na yaya oyo afandi na ngwendé likolo na nionso
Na oyo nionso bana na bato ba yebi
Kombo na Yesu emati likolo pé eyingeli
Kozala na ndeko aza haut placé lokola El-Elyon, eza malamu
Y'oza yaya, nga leki na yo, y'ofandi na ngwendé
Nga mosantu na dondwa elongo na yo
Yamba lokumu seko na seko
Ewuti na mitema ya bayé basosoli été oza mokonzi ya bakonzi
Wumela mosantu, wumela

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители