Kishore Kumar Hits

Athoms et Nadège - Nkembo Alleluia текст песни

Исполнитель: Athoms et Nadège

альбом: Psaumes


Nkembo kuna na lola
Nkembo kuna na lola
Ba angelu bako yembela Nkolo eh
Nkembo nkembo alléluia
Kembo'a ngo ya nani eh?
Nkembo kuna na lola (eza ya Yésu eh)
Nkembo kuna na lola (oh kasi b'a)
Ba angelu bakoyembela Nkolo
Nkembo nkembo alléluia
To memi malasi ya motuya
Pe lisusu loyembo ya mitema
Biso to pusani liboso ya kiti na yo
To sopela yo na makolo
To tondi na bilembo ya bolamu
Oyo tozui kati ya liziba ya ngolu
To pusani, to tatola yango
Yésu na nga oza malamu eh
Nkembo'a ngo ya nani eh?
Nkembo kuna na lola (eza ya Yésu eh)
Nkembo kuna na lola (oh kasi b'a)
Ba angelu bakoyembela Nkolo
Nkembo nkembo alléluia
Nzambé ya lola eh
Nzambé ya lola eh
Nzembo ya Nzambé to yembela moto te
Nzembo ya Nzambé etikala ya Nzambé
Po efungola nde lola na ye
Nzambé ya lola eh
Nzambé ya lola
Nzembo ya Nzambé to yembela fiancé te oh
Nzembo ya Nzambé etikala ya Nzambé
Po efungola nde lola na ye
Nkembo'a ngo ya nani eh?
Nkembo kuna na lola (eza ya Yésu)
Nkembo kuna na lola (oh kasi b'a)
Ba angelu bako yembela Nkolo
Nkembo nkembo alléluia

Alléluia Yésu alingaka to yembela ye
Alléluia Yésu alingaka to kumisa ye
Alléluia Yésu alingaka to yembela ye
Alléluia Yésu alingaka to kumisa ye
Na milolo na maboko a sepelaka topes'e nkembo eh
Alléluia Yésu alingaka to yembela ye
Alléluia Yésu alingaka to yembela ye
Alléluia Yésu alingaka to kumisa ye
Liboso akota Jérusalem azelaki batanda maputa eh
Tosopi mitema, milolo po asepela lelo eh
Alléluia Yésu alingaka to yembela ye
Alléluia Yésu alingaka to kumisa ye

Aller biso tokita (biso to kita)
Kita na se
Aller biso to kita (biso to kita)
Oh aller biso to kita (to pese lokumu eh)
Aller biso to kita (biso to kita)
Na louange ya lelo Nkolo Yésu a mata (Yésu a mata)
(A mata likolo) Nkolo Yésu a mata (Yésu a mata)
Na louange ya lelo Nkolo Yésu a mata (azua lokumu eh)
Oh Nkolo Yésu a mata (Yésu a mata)
(Lipata ezali awa eh)
Lelele lelele lele (lipata na nkembo)
Nazo yoka nga (lipata ezali awa eh)
Lelelele lelele lele (lipata na nkembo)
To longola ba pete, mitole po ye nde Mokonzi
To longola ba pete, mitole po ye nde Mokonzi (ye nde kaka Mokonzi)
Tolongola ba grades po awa Mokonzi aza moko (aza moko)
To longola ba pete, mitole po ye nde Mokonzi (ye nde kaka Mokonzi)
Tolongola ba grades po awa Mokonzi aza moko (aza moko)
Mokonzi aza moko eh (aza moko)
Hmm aza moko (aza moko)
Yaya aza moko eh (aza moko)
Mokonzi aza moko (aza moko)
Mokonzi aza moko eh (aza moko)
Mokonzi aza moko (aza moko)
Mokonzi aza moko eh (aza moko, aza moko)
Lokumu nionso ezonga na yo eh (eh Yésu eh)
Nkembo nionso ezonga na yo eh (eh Yesu eh)
Ma bina nionso ezali ya yo (eh Yésu eh)
Milolo nionso ezonga na yo eh (eh Yésu)
Oh nkembo nionso ezonga na yo eh (eh Yésu eh)
Ma bina nionso ezali ya yo eh (eh Yésu eh)
Molimo nionso ezalaya ezali yo eh (eh yesu eh)
Hmm nkembo nionso ezonga na yo eh (eh Yésu eh)

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители