Kishore Kumar Hits

Athoms et Nadège - Na Yemba Ngolu текст песни

Исполнитель: Athoms et Nadège

альбом: Psaumes


La grâce est une denrée rare que l'homme ne peut fabriquer
Mais aussi une ombre parfaite, où l'homme veut s'abriter
Sok'o sengi moto ngolu eh, ayebi ndéng'ako pes'o té
Kasi sok'o pesi ye ngolu eh, tal'ébelé y'esengo na miso na yé
Yango
Na yemba ngolu, na mona loléngé nionso mpo na ngai
Na yemba ngolu, na bika loléngé nionso na vie na ngai
Ngolu eh, eh-eh, na yemba ngolu eh
Ngolu eh, eh-eh, na yemba ngolu eh

Lisolo ya ngolu ebanda wuta éternité de l'autre côté
Et puis le cœur de Dieu, Nzamb'akanisa ndenge nini ako bimisa moto na pasi
Emonani na nzela ya Yésu, akofi n'ekulusu mpo akokisa ngolu'ango en action
Lelo oyo toza ko bika tongo, midi, pokwa, c'est le sacrifice de Dieu en notre faveur
Ndeko na nga
Na yemba ngolu, na mona loléngé nionso mpo na ngai
Na yemba ngolu, na bika loléngé nionso na vie na ngai
Ngolu eh, eh-eh, na yemba ngolu eh
Ngolu eh, eh-eh, na yemba ngolu eh

Ngolu ewuti na motéma'a tata oyo ayebi ba limites ya bana na yé
Mibeko eza claires kasi nzoto eza bolembu mingi, ayebi comment les ratraper
Ngolu eza pé lokola ndélo, ezo talisa place nini buzoba esengeli esuka
Sok'o sosoli monén'a ngolu, kobanga Nzambe ekomata motéma na yo
Ekokomel'o loyembo
Na yemba ngolu, na mona loléngé nionso mpo na ngai
Na yemba ngolu, na bika loléngé nionso na vie na ngai
Ngolu eh, eh-eh, na yemba ngolu eh (hum, ekomi loyembo)
Ngolu eh, eh-eh, na yemba ngolu eh

Ngolu ya Nzambe soki ekomeli yo, etali ata critère moko té ya bomoto
Ni forme, ni valeur kasi ngolu ekoki mpo ebongola yo ndéngé nionso
Soki éyé bisik'ozali, finalement le monde entier va se mettre à te regarder
Kasi kobosana té, eza ngolu, ô merité yango ata loléngé moko té na vie na yo
Kobosan'o yemba té
Na yemba ngolu, na mona loléngé nionso na vie ngai
(Oh-oh) na yemba ngolu, na bika loléngé nionso na vie na ngai (na mériter té oh-oh-oh)
Ngolu eh, eh-eh, (ngolu eh) na yemba ngolu eh
Ngolu ya Nzambe na vie oh, (ngolu eh, eh-eh) ngolu oh, oh-h (na yemba ngolu eh)
Esimbi nga motéma (ngolu eh, eh-eh) oh ngolu eh (na yemba ngolu eh)
Quand je pense au prix payé, mpo na koma oyo nga na komi lelo (na yemba ngolu eh)
Je calcule avec mes doigts, nakom'o compter bolamu nionso 'a Nzambe oh-oh (na yemba ngolu eh)
Ematisi nga loyembo, yango nazo yemba oh ngolu oh-oh
Ngolu eh, eh-eh, na yemba ngolu eh
Ngolu oh, ya Nzambe oh, oh, ekomeli nga lelo (na yemba ngolu eh)
Nayokaka na sango kasi ekomeli nga lelo, c'est tellement diffèrent (na yemba ngolu eh)
Ekom'o yembisanga, ekom'o gangisa nga oh
Ngolu eh, eh-eh, (ngolu oh) na yemba ngolu eh
Na mériter té oh (ngolu eh, eh-eh) ya Nzambe (na yemba ngolu eh) ya Nzambe oh
Na mériter té oh (ngolu eh) ngolu elekeli nga oh (na yemba ngolu eh)
C'est sans limite, ngolu ya Nzambe na vie nga
(Na mériter té oh)

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители