Kishore Kumar Hits

Moise Mbiye - Na yeï текст песни

Исполнитель: Moise Mbiye

альбом: Influence, vol. 1 (Le sommet de l'adoration / La réverve de l'éternel)


Nkóló na mona
Ngolú na yo na bomoyi na nga
Mosíká nazalaki
Ezalakí sé kolimboli
Butu na moyi
Po na nga sékô molili
Nafungoli motéma
Yo okoyamba nga mpó eté na mbika

Nkóló na mona
Ngolú na yo na bomoyi na nga
Mosíká nazalaki
Ezalakí sé kolimboli
Butu na moyi
Po na nga sékô molili
Nafungoli motéma
Yo okoyamba nga mpó eté na mbika
Na yé épayi na yo (nga na yé, na yé, na yé)
(Na mikambi nyonso epái na yo)
(Salelá nga Papa)
(Ngolú na yo ezanga suka)
Nga na yé, na yé, na yé
Na mikambi nyonso epái na yo
Salelá nga Papa
Ngolú na yo ezanga suka

Yo ndé Nzámbe ya sémbô
Yo otonda mpé na bolingo Yahweh
Yo obuakaka té libándá
Mutu nyonso amikabi na yo
Soki oboyi koyoka nga
Nayébi té nalobela náni
Losámbo eza sé mókó
Na bika mawa mpé bolingo na yo
Leló na yé (nga na yé, na yé, na yé)
(Na mikambi nyonso epái na yo)
Yo okobuaka ngáí té (salelá nga Papa)
(Ngolú na yo ezanga suka)
Yo oyoka mawa (nga na yé, na yé, na yé)
Yahweh (na mikambi nyonso epái na yo)
Yahweh (salelá nga Papa)
(Ngolú na yo ezanga suka)

Bana Israëlé nakati ya esóbé
Baluki wápi mayi ya komela
Ba kutani na máyi sé ya bololo
Olobi na Mosé abuaka nzeté
Na káti ya máyi pô esilá bololo
Na káti ya máyi pô esilá bololo
Lolenge mókó na bomoyi na nga
Nasengi yo otelemisa ekulúzu
Na bomoyi na nga esilá bololo
Bomoyi na ngáí olongola bololo
Bomoyi na nga esilá bololo
Bomoyi na ngáí olongola bololo
Nga na yé, na yé, na yé
Na mikambi nyonso epái na yo
Salelá nga Papa
Ngolú na yo ezanga suka
Nga na yé, na yé, na yé
Na mikambi nyonso epái na yo
Salelá nga Papa
Ngolú na yo ezanga suka

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители