Kishore Kumar Hits

Moise Mbiye - Ko Kabola Congo te текст песни

Исполнитель: Moise Mbiye

альбом: Ko Kabola Congo te


Notre père qui est aux cieux
Que ton nom soit sanctifié
Que ton règne vienne
Que ta volonté soit faite comment?
Comme au ciel
Ooh-oh-oh-oh, ah iyo oh-oh-oh-oh
Yelele yelele yelele ah-ah-ah
Ooh-oh-oh-oh, ah iyo oh-oh-oh-oh
Yelele yelele yelele ah-ah-ah
Na tango ya pasi eeeh na tango ya maladie
Nabelelaka yo, yo nde liziba ya ngolu eeeh
Kombo mususu ezali te, kaka kombo na yesu
Yango ba pesa na Congo eeh, tika na belela lelo
Jésus eeeh, Jésus eeh Jésus eeeh, belela Jésus eeh
Jésus eeeh, Jésus eeh, Jésus eeeh belela Jésus eeh
Wuta bomwana na ngáí eh, balukáki ngáí na beba
Na maloba na bango balingi ba kabola Congo
Nasali losámbo bazanga kimia eh
Balonga Congo na makita na bango ba échoué
Échoué, échoué, échoué, banguna ba échoué
Banguna ba échoué (échoué, échoué, banguna ba échoué)
Fongola lola iye yaya na ngáí eh (iyo iyo oh-oh-oh)
Fongola lóla iye yaya na ngáí eh (iyo iyo oh-oh-oh)
Bana batanga kelási eh, bazwa misala eh
Bakenda bázonga, commerce esimba eh
Santé malámu eh, hopital malámu eh
Mapinga ya solo eh
Butu na moyi eh, losámbo na biso eh
Pona na Congo na ngáí, justice ya solo eh
Kelási ya malamu, ba nganga Nzámbe ya solo
Wâná ndé tozo senga
Fongola lóla iye eh-eh-eh
Likunia esilá, motéma mabé esilá
Mbóka etongamaka na bolingo
Okapi ya Ituri, mbísi ya Tanganyika
Pona cuivre ya Katanga
Mafúta ya Bandundu to kobeta ntólo eh
Lokoko kawusi bena Yahweh
To kobeta ntólo lokola kawusi bena
Ça c'est une prophétie
Mokolo ezali très bientôt to kobeta ntólo
Diamant ekozonga tokotika ba wewa
To kokatisa ebale na Mboma échelle eh
To kobeta ntólo eh
Lokola kawusi bena
To kobeta ntólo eh
Lokola kawusi bena
Nasambelaka Nzámbe abatela libóta
Nakéí bokila na forêt équatoriale pona bana balia
Basakana na zeló, bakosokola ba chute ya Wagenya
Tokómi ba mpókwa tika na bêta forme eh
Bilengi ya Kini ba bukanaka té
Congo eh, congo eh, congo eh
Ko kabolá Congo té
Congo eh, congo eh, congo eh
Ko kabolá Congo té
Nakéí na Congo Central
Barrage ya Ínga
Ba plages ya Muanda
Kukabola Congo vewe
Congo eh, congo eh, congo eh ya maman
Ko kabolá Congo vewe
Congo eh, congo eh, congo eh
Ko kabolá Congo vewe
Nakéí na Kassaï
Na Lac Mukamba
Na diamant ya Miba utabulija Congo oh
Congo eh, congo eh utabulija Congo eh
Ditunga dietu
Congo eh, congo eh utabulija Congo eh
Ditunga dietu
Nakéí na Katanga
Mubunda ya Gecamine
Mama minaliya mushikabole Conge eh
Congo eh, Congo eh, Congo eh
Ushikabole Congo eh
Congo eh, Congo eh, Congo eh
Ushikabole Congo eh
Congo té kokabola Congo té
Congo té kokabola Congo té
Ah yayi eh (Congo té kokabola Congo té
Pona mbongo (Congo té kokabola Congo té)
Pona keto (Congo té kokabola Congo té)
Ata pona muasi (Congo té kokabola Congo té)
Ata yo osiliki (Congo té kokabola Congo té)
Pona Cuivre (Congo té kokabola Congo té)
Ata pona diamant (Congo té kokabola Congo té)
Atá yo Chinois (Congo té kokabola Congo té)
Nayo mpé Indien (Congo té kokabola Congo té)
Atá yo Libanais (Congo té kokabola Congo té)
Na politique (Congo té kokabola Congo té)
Je te présente la culture de mon pays
Le tam-tam de la RDC
Le son de la victoire
L'heure de ce pays a sonné
L'heure de léopard
Au centre de l'Afrique
Le grand Congo
Lève-toi, lève-toi
Lève-toi le pays prophétique
Congo
Ya motéma Congo
Ya mabanzo Congo
Ya bolingo Congo
Ya kotonga Congo
Un jour nakozónga na Congo
Ya ba koko
Voilà c'est le Jour-j
Le jour que tout le monde attendait le 30 octobre 1974
C'est le jour du combat du siècle opposant Ali contre Foreman
Tous les Zaïrois sont là ils ont rempli le Stade du 20 mai
Quelle ambiance (Ali bóma yé)
Quelle ambiance (Ali bóma yé)
Quelle ambiance (Ali bóma yé)
Écoutez les Zaïrois, ils sont entrain de chanter, ils encouragent l'idole (Ali bóma yé)
(Ali bóma yé)

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители