Kishore Kumar Hits

J.B. Mpiana - Education текст песни

Исполнитель: J.B. Mpiana

альбом: TH Toujours humble


Mwana te asengaki, ko ya na mokili
Papa maman ba balani, ba boti mwana
Ba dressaka nyama, moto ba edukaka ye
Ba forcaka education te, ba salaka nde appel
Na volonté ya mwana
Otuni mwana, olingi nini ko
Avis ya mwana tango mosusu
Asala mosala ya maboko
Lokola tata naye atanga
Ako imposer mwana
Il faut ozala docteur en droit, to licencier na economie
Na ko tosa ba boti, mwana asali volonte ya ba parents
Lelo a se retrouver nul
Akomi ko ima ima
Soki nga na komi boye, po na salaki choix na nga te
Ndakisa ya ba papa misusu
Mwana naye amoni ye na mwasi mosusu na nzela ba simbani
Abengi mwana naye a corrompre ye na mbongo
Koyebisa maman te na ndako noki ako silika ah
Banda jour wana mwana wana akoma têtu
Ata asali mabe, moyen papa a gangela ye ezalit e
Azo banga sinon mwana ako funda epayi ya maman naye
Ko beba education ya mwana nyoso wana
Ndakisa ya ba maman oyo
Abotamwana se moko
Akomisi ye neti nzambe, ata mwana wana asali mabe
Maman naye asiliki, botikela nga liso na nga
Ezali se moko wana, sans le savoir ayeba
A detruire mwana naye, a encourager ye na mabe
Ndakisa ya ba parents misusu
Mwana ya mbanda to azwa mwana ya ndeko afandaka epayi naye
Akomisi ye lokola domestique
Misala nyoso ya ndako bitinda epa ya mwana wana
Bana naye moko ba salaka lisusu misala te
Na makanisi naye que azo nyokola mwana wana
Nzoka nde a detruire education ya bana naye
Pe a eduquer mwana ya mbanda to pe ya ndeko oh

Ba parents bozala ba irresponsables te
Quelque soit difficulté ya vie oza nango
Éduquer mwana yo moko
La plus part ya bana oyo ba kolaka epayi ya ba ndeko
Mingi ba zalaka na education ya bien te
Cause po suivi ezalaka makasi te
Parent nyoso esengeli azala model ya mwana naye
Ba lobaka: "Tel père, tel fils"
Mwana soki otie ye esika ya ba nyama
Akomi ko loba neti ba nyama
Example ya Romulus et Remus eh
Ba zalaka ko loba neti ba nyama
Po model na bango ezalaki loup eh
Education eza dangereuse na vie ya mwana eza éducation diffusée
Na ndako na kelasi bazo eduquer mwana ndenge mosusu
Na libanda pe azu zua education ndenge mosusu
Ba parents bo zala prudents
Bana bo profiter na voix ya ba parents te, bo keba
Mwana yo moko oza agent principale ya education nayo
Mwana mosusu aza orphelin akufela baboti baye
Mosusu ba famille ya baboti baye ba abandona bango
Malembe malembe ba orienta ba vie na bango
To mona pe lelo ba koma bato
Parent opimela mwana bonbon biscuit to jouet kasi éducation te
Education eza utile na vie ya mwana
Lokola essence to batterie na bomoyi ya voiture

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители