Kishore Kumar Hits

J.B. Mpiana - Acappella текст песни

Исполнитель: J.B. Mpiana

альбом: TH Toujours humble, Vol. 2


Nini ya mabe nga nasali eh
Po ete nakoma ennemi juré ya moto nionso tout?
Manso nakosala bakomona mabe
Ngai Mpiana, nayebi tina nakokufa te
Naseka na nga, oh nga natioli bango eh
Na loba ata lisolo, nga na tongi bango
Nzambe yo moto oyebaka le bon et le mauvais
Soki ya c'est vrai nazali moto mabe,
Pesa nga etumbu ya liwa nakufa po basepela
Lobi balobaki nga portant la poule aux œufs d'or
Lelo nga nakomi ennemi juré na bango
Nzambe yo okela likolo na mabele le
Nga natie mabolongo na se nakosenga
Jugement se ya yo
Nani akoki kolinga bayina ye mboka mobimba?
Nani akoki kondima peine de mort soki aza innocent?
Mabe nga nasali bango, na réfléchir na moni te
Nzambe soki oyebi yango, lakisa nga ata na ndoto
Po nasenga bango pardon, na mesani rancune te
Nazali ami de la paix, partisan de la non-violence
Souvenir na nga ya mabe, ndenge tomesani na bango
Bakopesa nga sourire, na motema ngai ennemi
Pa Rengos
Decky Deckysha
Président Lokondo
Vieux Omela
Président Maurice
Vieux Adias
Boyoka kolela na ngai

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители