Kishore Kumar Hits

Enoch Mulopo - Makila текст песни

Исполнитель: Enoch Mulopo

альбом: Une adoration vivante


Nani akoki kofunda nga
Moponami na Yesu
Muana Mpate afuta
Niongo na nga
Motuya mibalé!
Masumu na nga
Amema yango
Akomisa nga peto
Tango na bolembu
Na ko kweya
Ngolu etelemisaka nga
(Nga na tondi Yo
Po na Bolingo na Yo
Otiki Nkembo oyé
Kosikola nga) (bis)
Makila na Yo
Epetola nga
Wuta liboso mokilo oyo
Ezalisama
(Yango na yembi,
Ngolu na Yesu
Po ete Mosantu
Alobi ete nazali bulé!) (bis)
(Nga na tondi Yo
Po na Bolingo na Yo
Otiki Nkembo oyé
Kosikola nga) (bis)
Tango moyini
Akofunda nga
(Epayi ya Tata),
Po na masumu na salaki
(Ebele pe motané)
Pe ako yebisa Ye
(Apesa etumbu)
Kasi Tata akotala nga
Na se ya Makila
Amoni nga yi peto
Na se ya Makila,
Nanu na sumuka te eh
Na se ya Makila
Amoni ngai peto
Na se ya Makila,
Nanu na sumuka te eh
Yango esengo
Na nga emati
Po na mobeko,
Na bongaki
Na etumbu ya liwa
Po na mabé na nga
Nyonso oh
Ngolu epesameli nga
Ya solo
Na se ya Makila
Amoni nga yi peto
Na se ya Makila,
Nanu na sumuka te eh
Na se ya Makila
Amoni ngai peto
Na se ya Makila,
Nanu na sumuka te eh
Yango esengo
Na nga emati
(Oh! Oh!)
Yango esengo
Na nga emati!
(Yoka tina
Ya esengo na nga)
Yango esengo
Na nga emati
(Yesu apesi nga
Bolimbisi
Ya masumu eh)
Yango esengo
Na nga emati
(Na komi moto
Ya esengo
Oyo esilka te)
Yango esengo
Na nga emati
(Bomoyi na nga
Ekomi nde ya sika oh)
Yango esengo
Na nga emati
(Yango esengo
Na nga emati)
Yango esengo
Na nga emati

Поcмотреть все песни артиста

Другие альбомы исполнителя

Похожие исполнители